< 耶利米哀歌 3 >

1 在上主盛怒的鞭責下,我成了受盡痛苦的人;
Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.
2 他引我走入黑暗,不見光明;
Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai kati na molili, kasi na pole te.
3 且終日再三再四,伸手與我為敵;
Solo, mokolo mobimba, azalaki kobalola loboko na Ye mpo na kotelemela ngai tango nyonso.
4 他使我肌膚枯瘦,折斷我的骨頭;
Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango, abukaki mikuwa na ngai.
5 他在我四周築起圍牆,用毒草和痛苦環繞我,
Mpo na kotelemela ngai, atongaki zingazinga na ngai mir ya ngenge mpe ya pasi.
6 讓我居住在黑暗之中,好像久已死去的人。
Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili, lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.
7 他用垣牆圍困我,不能逃脫;並且加重我的桎梏;
Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te; akangaki ngai na minyololo ya kilo.
8 我呼籲求救時,他卻掩耳不聽我的祈禱。
Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te.
9 他用方石堵住了我的去路,阻塞了我的行徑。
Akangaki nzela na ngai na mabanga minene mpe abebisaki banzela na ngai ya mike.
10 上主之於我,像是一隻潛伏的狗熊,是一頭藏匿的獅子,
Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai;
11 他把我拖到路旁,撲捉撕裂,加以摧殘;
apengwisaki ngai nzela, apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba.
12 又拉開他的弓,瞄準我,把我當作眾矢之的。
Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.
13 他用箭囊的箭,射殺了我的雙腰;
Atobolaki motema na ngai, na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye.
14 使我成了萬民的笑柄,終日受他們的嘲笑;
Nakomaki eloko ya liseki na miso ya bato na ngai nyonso; bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo.
15 他使我飽食苦菜,醉飲苦酒。
Atondisaki ngai na matiti ya bololo mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo.
16 他用砂礫破碎我的牙齒,用灰塵給我充饑。
Abukaki minu na ngai na mabanga, azindisaki ngai na putulu.
17 他除去了我心中的平安,我已經忘記了一切幸福;
Nazangaki kimia, nayebaki lisusu te nini yango bolamu.
18 於是我說:「我的光榮已經消逝,對上主的希望也已經幻滅。」
Boye nalobaki: « Lokumu mpe makambo nyonso oyo natielaki elikya na Yawe esili! »
19 我回憶著我的困厄和痛苦,盡是茹苦含辛!
Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.
20 我的心越回想,越覺沮喪。
Tango nyonso nakanisaka yango, motema na ngai ebukanaka.
21 但是我必要追念這事,以求獲得希望:
Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya:
22 上主的慈愛,永無止境;他的仁慈,無窮無盡。
Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te;
23 你的仁慈,朝朝常新;你的忠信,浩大無垠!
ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene!
24 我心中知道:上主是我的福分;因此,我必信賴他。
Namilobeli: « Yawe azali elikya na ngai; yango wana nakotia motema epai na Ye. »
25 上主對信賴他和尋求他的人,是慈善的。
Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye!
26 最好是靜待上主的救援,
Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe!
27 最好是自幼背負上主的重軛,
Ezali malamu mpo na moto komema ekangiseli na ye wana azali nanu elenge.
28 默然獨坐,因為是上主加於他的軛;
Tika ete avanda kimia mpe avanda ye moko, pamba te Yawe nde alingi bongo mpo na ye.
29 他該把自己的口貼近塵埃,這樣或者還有希望;
Tika ete atia elongi na ye na mabele: tango mosusu elikya ekoki kozala.
30 向打他的人,送上面頰,飽受凌辱。
Tika ete apesa litama mpo ete babeta ye mbata, mpe tika ete atonda na soni!
31 因為上主決不會永遠把人遺棄;
Pamba te Nkolo abwakaka moto te mpo na libela.
32 縱使懲罰,他必按照自己豐厚的慈愛,而加以憐憫。
Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye.
33 因為他苛待和懲罰世人,原不是出於他的心願。
Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi.
34 將世上所有的俘虜,都踐踏在腳下,
Tango banyataka na makolo bakangami nyonso ya mokili,
35 在至上者前剝奪人的權利,
tango babebisaka lokumu ya moto na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
36 與人爭訟時,欺壓他人:難道上主看不見﹖
tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te?
37 若非上主有命,誰能言出即成呢﹖
Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te?
38 吉凶禍福,難道不是出自至上者之口﹖
Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato?
39 人生在世,為自己的罪受罰,為什麼還叫苦﹖
Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye?
40 我們應檢討考察我們的行為,回頭歸向上主!
Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe;
41 應向天上的大主,雙手奉上我們的心!
totombola mitema mpe maboko na biso epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba:
42 正因為我們犯罪背命,你纔沒有寬恕。
« Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te.
43 你藏在盛怒之中,追擊我們,殺死我們,毫不留情。
Omizipaki na kanda ndenge bamizipaka liputa, onyokolaki biso mpe obomaki na mawa te.
44 你隱在濃雲深處,哀禱不能上達。
Omizipaki lipata mpo ete mabondeli edusola te.
45 你使我們在萬民中,成了塵垢和廢物。
Okomisaki biso lokola eloko ya nkele mpe ya tina te na miso ya bikolo.
46 我們所有的仇人,都向我們大張其口。
Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso;
47 為我們只有恐怖和陷阱,破壞和滅亡。
libula na biso ekomi: somo, mabulu, kobebisama mpe kufa. »
48 為了我女兒──人民的滅亡,我的眼淚湧流如江河。
Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.
49 我的眼淚湧流不止,始終不停,
Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso mpe ezali kolemba te,
50 直到上主從天垂顧憐視,
kino tango Yawe akotala mpe akomona wuta kuna na Lola.
51 因我城中的一切女兒,使我觸目傷心。
Makambo oyo miso na ngai ezali komona ezali koyokisa motema na ngai pasi likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.
52 我的仇人無故追捕我,像獵取飛鳥一樣;
Bato oyo bayinaka ngai na pamba balukaki kokanga ngai lokola ndeke;
53 他們將我投入坑穴之中,把石塊擲在我身上;
balukaki koboma ngai kati na libulu, babwakelaki ngai mabanga;
54 水淹沒了我的頭頂,我想:「我要死了! 」
mayi etondaki kino kozipa moto na ngai mpe nakanisaki ete nakomi pene ya kokufa.
55 上主,我從坑穴深處,呼號你的聖名;
Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu.
56 你曾俯聽過我的呼聲,對我的哀禱,不要掩耳不聞。
Oyokaki ngai libondeli na ngai: « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo! »
57 在我呼號你的那一天,願你走近而對我說:「不要害怕! 」
Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki: « Kobanga te! »
58 上主,你辯護了我的案件,贖回我的性命。
Nkolo, obundelaki ngai solo, osikolaki bomoi na ngai!
59 上主,你見我遭受冤屈,你替我伸了冤,
Yawe, omonaki mabe oyo basalaki ngai: longisa ngai!
60 你看見了他們對我的種種仇恨和陰謀。
Omonaki solo posa na bango ya kozongisa mabe na mabe mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe.
61 上主,你聽見了他們加於我的種種侮辱和陰謀,
Yawe, oyokaki mafinga na bango, mabongisi na bango ya kosala ngai mabe,
62 你也聽見了反對我者的誹謗,和他們終日對我的企圖。
maloba ya bayini na ngai mpe makanisi na bango ya kosala ngai mabe.
63 你看! 他們或坐或立,我始終是他們嘲笑的對象。
Tala mpe mona bango! Ezala bavandi to batelemi, mosala na bango: kotiola ngai na banzembo na bango.
64 上主,求你按照他們雙手的作為,報復他們;
Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango;
65 求你使他們的心思頑固,並詛咒他們。
yeisa mitema na bango makasi, kweyisela bango bilakeli mabe na Yo;
66 上主,求你憤怒地追擊他們,將他們由普天之下除掉。
nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe!

< 耶利米哀歌 3 >