< 士師記 3 >

1 上主保留的民族 這是上主為考驗那些不曉得客納罕一切戰事的以色列人,所留下來的民族,
Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana.
2 叫以色列子民的後代,至少那些以前不曉得這些戰事的人,知道和學習作戰。
Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba.
3 這些民族就是培勒舍特人的五個酋長,一切客納罕人、漆冬人和住在黎巴嫩山上,即從巴耳赫爾孟山直到哈瑪特關口的希威人。
Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.
4 他們留在那裏是為考驗以色列人,看他們是否聽從上主藉梅瑟吩咐他們祖先的那些誡命。
Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize.
5 以色列子民就住在客納罕人、赫特人、阿摩黎人、培黎齊人、希威人和耶步斯人中間,
Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi;
6 竟然娶了他們的女子為妻,也把自己的女兒嫁給他們的兒子,事奉了他們的神。敖特尼耳民長
babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.
7 以色列子民行了上主視為惡的事,忘卻了上主他們的天主,而事奉了巴耳諸神和阿舍辣諸女神;
Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.
8 因此上主對以色列大發忿怒,將他們交在厄東王雇商黎沙塔殷手中,以色列子民遂服事了雇商黎沙塔殷八年。
Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.
9 當以色列子民向上主呼籲時,上主給以色列子民興起了一個拯救他們的救星,即加肋布的弟弟刻納次的兒子敖特尼耳。
Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli: Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele.
10 上主的神降在他身上,他作了以色列的民長,出去作戰;上主把厄東王雇商黎沙塔殷交在他手中,他的`能力勝過了雇商黎沙塔殷。
Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli; mpe Otinieli alongaki ye.
11 於是四境平安了四十年。厄胡得民長刻納次的兒子敖特尼耳去世後,
Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki.
12 以色列子民又行了上主視為惡的事,上主就強化摩阿布王厄革隆去打以色列,因為他們行了上主視為惡的事。
Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.
13 他聯合了阿孟子民和阿瑪肋克人,前來擊敗以色列,佔據了棕樹城;
Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila.
14 以色列遂服事了摩阿布王厄革隆十八年。
Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe.
15 當以色列子民向上主呼籲時,上主給他們興起了一位拯救者,就是本雅明人革辣的兒子厄胡得,他是左右手能兼用的人;以色列子民便派他給摩阿布王厄革隆獻貢物。
Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.
16 厄胡得預備了一把一肘長的雙刃刀,插在右腿衣服底下,
Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.
17 來到摩阿布王厄革隆前獻貢物─厄革隆原是極肥胖的人。
Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene.
18 獻完貢物以後,就把抬貢物的人打發走,
Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango.
19 自己卻由基耳加耳柱像那裏退回,說:「王呀! 我有機密事要對你說。」王說:「退下! 」於是侍立左右的人都退去。
Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo. Mokonzi azongisaki: — Kimia! Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda.
20 厄胡得來到他跟前,他正獨自坐在涼台上的房子裏;厄胡得說:「我有神諭告訴你! 」王就從自己的座位上起立;
Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye: — Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe.
21 厄胡得遂伸左手從右腿上拔出刀來,刺入他的腹部,
Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi.
22 柄和刀都刺了進去,脂肪遂包住了刀子,他沒有從肚子裏把刀抽出來;
Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi.
23 厄胡得出來到了走廊,把涼台上的門關上,上了鎖。
Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende.
24 他出去之後,王臣前來,看見涼台的房門關著,就說:「他一定在涼台上的內室裏便溺。」
Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki: — Tango mosusu mokonzi azali na zongo inene oyo ezali kati na shambre, na kati ya ndako.
25 待他們等煩了,看見沒有人來開涼台上的門,他們就拿鑰匙把門開了,見他們的主子躺在地上死了。
Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se.
26 在他們猶豫的時候,厄胡得已經逃走,繞過柱像,而逃往色依辣。
Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira.
27 他到了那裏,就在厄弗辣因山地吹號角,以色列子民就同他由山地下來,他在他們前面,
Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.
28 對他們說:「你們緊跟著我,因為上主把你們的仇敵摩阿布人已交於你們手中! 」他們遂跟他下去,佔據了摩阿布對面的約但河渡口,不許一人渡過。
Alobaki na bango: — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi.
29 就在那個時候,他們擊殺了摩阿布人約有一萬,都是壯丁和兵士,沒有一個人逃脫。
Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki.
30 從那天起,摩阿布驅服於以色列手下;境內平安了十八年。沙默加爾民長
Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe.
31 在他以後,有阿納特的兒子沙默加爾,他意趕牛棒擊殺了六百培肋舍人,拯救了以色列。
Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.

< 士師記 3 >