< 士師記 21 >

1 以色列人曾在米茲帕起誓說:「我們中誰也不可把自己的女兒嫁給本雅明人為妻。」
Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba: « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. »
2 民眾來到貝特耳,在天主面前,坐在那裏,放聲大哭,直到晚上;
Bato bakendeki na Beteli, bavandaki wana liboso ya Nzambe kino na pokwa. Batombolaki mingongo na bango mpe balelaki makasi.
3 然後說:「上主以色列的天主! 為什麼在以色列中間發生了這事,今日竟使以色列中少了一支派﹖」
Bazalaki koloba: « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele? »
4 次日,百姓一早起來,在那裏築了一座祭壇,獻了全燔祭與和平祭。
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato batongaki kuna etumbelo; batumbaki na likolo na yango bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
5 以後,以色列子民問說:「以色列眾支派中,有誰沒有上到上主面前,參加集會呢﹖」因為他們先前對於那些凡不上米茲帕到上主面前來的人,曾發過嚴誓說:「死無赦! 」
Bongo bana ya Isalaele batunaki: « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye.
6 以色列子民對他們的弟兄本雅明起了憐憫之心說:「今天以色列絕了一支派。
Bana ya Isalaele bakomaki na mawa mpo na bandeko na bango, bato ya libota ya Benjame; balobaki: « Mokolo ya lelo, libota moko elongwe na Isalaele.
7 我們曾指著上主起過誓,決不將我們的女兒給他們為妻,那麼,我們怎樣給所剩下的人娶妻呢﹖」
Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. »
8 他們又問說:「以色列眾支派中,有那一支派沒有上米茲帕來到上主面前呢﹖」看,由基肋阿得雅貝士中沒有一人入營,參加集會。
Boye, batunaki: « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani.
9 的確,檢閱百姓的時候,沒有一個基肋阿得雅貝士的居民在場。
Pamba te tango batangaki bato, bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi azalaki wana.
10 因此會眾打發一萬二千勇士到那裏去,吩咐他們說:「你們去用刀屠殺基肋阿得雅貝士的居民,連婦女孩子都在內。
Lisanga etindelaki bango basoda nkoto zomi na mibale, bapesaki bango mitindo oyo: « Bokende koboma na mopanga bato nyonso ya Yabeshi ya Galadi elongo na basi mpe bana.
11 你們要這樣作;所以男子和與男子同過房的婦女,盡行殺掉,但要保留處女。」他們就這樣作了。
Tala makambo oyo bokosala: ‹ Bokobebisa mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo ayebi nzoto ya mibali. › »
12 他們在基肋阿得雅貝士居民中,尋得了四百個未曾認識過男子,也未曾與男子同過房的少年處女,就把她們帶到客納罕地史羅營裏。
Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.
13 全會眾又打發人往黎孟岩石去,與住在那裏的本雅明子孫談判,與他們講和。
Lisanga mobimba etindaki sango ya kimia epai ya bato ya libota ya Benjame, oyo bazalaki na libanga monene ya Rimoni.
14 本雅明子孫當時就回來了,會眾就把基肋阿得雅貝士女子中所保留的少女,給他們為妻,但是數目不足。史羅搶妻
Boye, na tango wana, bato ya libota ya Benjame bazongaki, mpe lisanga mobimba epesaki bango na libala, basi ya Yabeshi ya Galadi oyo batikaki na bomoi. Kasi basi yango bazalaki ya kokoka te mpo na bango nyonso.
15 民眾仍為本雅明人傷心難過,因為上主使以色列支派中有了缺陷。
Bato bayokaki mawa mpo na bato ya libota ya Benjame, pamba te Yawe alongolaki libota moko kati na mabota ya Isalaele.
16 會中的長老說:「本雅明的婦女既然都消滅了,我們怎樣給所剩下的人娶妻呢﹖」
Bakambi ya lisanga balobaki: « Tokosala ndenge nini mpo na kozwa basi ya kopesa na libala mpo na mibali oyo batikali, pamba te basi ya libota ya Benjame basili kokufa? »
17 又說:「本雅民的遺民該有承嗣,免得以色列中泯沒一支。
Balobaki lisusu: « Bato ya libota ya Benjame oyo batikali basengeli kozala na bakitani na bango, mpo ete ekolo elimwa te kati na Isalaele.
18 但是,我們不能將自己的女兒給他們為妻,因為以色列曾起誓說:誰把女兒給本雅明人是可詛咒的! 」
Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo: ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › »
19 有人說:「看,年年在史羅舉行上主的慶節。」─使羅位於貝特耳之北,貝特耳至舍根大路之東,肋波納之南。
Bongo balobaki: « Tala, feti moko ya Yawe ezalaka mibu nyonso, kati na Silo oyo ezali na ngambo ya nor ya Beteli mpe na ngambo ya este ya nzela oyo ekenda longwa na Beteli kino na Sishemi, mpe na ngambo ya sude ya Lebona. »
20 於是他們給本雅明子孫出主意說:「你們往葡萄園去,藏在那裏。
Boye bapesaki mitindo oyo epai ya bato ya libota ya Benjame: « Bokende kobombama kati na bilanga ya vino
21 等到你們看見史羅的童女出來列隊跳舞,你們就從葡萄園中出來,從史羅的女兒中,各搶一個為妻,然後回本雅明地方去。
mpe botala malamu. Tango bokomona bana basi ya Silo babimi mpo na kobina, bobimela bango wuta na bilanga ya vino, mpe moko na moko kati na bino akanga mwasi moko kati na bana ya Silo mpe azonga na ye na mokili ya Benjame.
22 她們的父親或兄弟若是出來與我們爭論,我們就說:求你們看我們的情面,恩待這些人,因為他們戰場上沒有得到女子為妻;況且又不是你們將女兒交給他們;若是你們給的,那就有罪了。」
Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango: ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › »
23 本雅明子孫就這樣作了:按數目搶跳舞的女子,各娶一個為妻;以後他們就走了,回到自己的地業,重建城邑,住在那裏。
Bato ya libota ya Benjame basalaki bongo. Tango bana basi bazalaki kobina, mobali moko na moko akangaki mwana mwasi moko mpe amemaki ye mpo ete azala mwasi na ye. Bongo bazongaki na mabele na bango, batongaki bingumba mpe bavandaki kuna.
24 以後以色列子民從那裏各回自己的支派和家族,從那裏各回自己的家鄉。
Na tango wana, bana ya Isalaele balongwaki na esika wana mpe bazongaki na bandako na bango, na bituka na bango mpe na mabota ya botata na bango, moto na moto na mabele na ye.
25 那時,在以色列沒有君王,各人任意行事。
Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te; moto na moto azalaki kosala makambo oyo azalaki komona ete ezali malamu.

< 士師記 21 >