< 士師記 13 >

1 以色列子民又行了上主視為惡的事,因此上主把他們交於培肋舍特人手中四十年之久。
Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.
2 那時,在祚辣有一個人,屬於丹支派,名叫瑪諾亞,他的妻子是個石女,從未生育。
Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te.
3 上主的使者顯現給那婦人,對她說:「看,你原是個石女,從未生育,但是你要懷孕生子。
Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki: « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali.
4 今後要留心:清酒濃酒都不可喝,各種不潔的東西也不可吃!
Sik’oyo, sala keba! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo;
5 看,你將懷孕生子,剃刀不可觸及他的頭,因為這孩子從母胎就是獻於上主的;他要開始從培肋舍特人手中拯救以色列。」
pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »
6 那婦人遂去告訴自己的丈夫說:「有一個天主的人來到我這裏,他的容貌好像天主的使者,極其威嚴;我沒有問他從那裏來;他也沒有告訴我他的名字。
Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye: « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe: azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.
7 他對我說:看,你將懷孕生子,從今以後清酒濃酒都不可喝,各種不潔的東西都不可吃,因為這孩從母胎一直到死,是獻於天主的。」
Kasi alobaki na ngai: ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »
8 瑪諾亞就向上主懇求說:「我主! 求你叫你所派的那位天主的人再到我們這裏來! 指教我們對於將生的嬰孩應該作什麼﹖」
Bongo Manoa asambelaki Yawe: « Oh Nkolo, nabondeli Yo: tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama! »
9 天主聽了瑪諾亞的話;天主的使者又來到那婦人跟前;那時她正坐在田間,她的丈夫沒有同她在一起。
Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te.
10 那婦人就急速跑去告訴丈夫說:「看,那天來我跟前的那個人,又顯現給我了。」
Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye: « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki! »
11 瑪諾亞就起來,跟著妻子來到那人跟前,對他說:「你就是向這婦人說話的那人嗎﹖」他回答說:「我就是。」
Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki: — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai? Azongisaki: — Iyo, ezali ngai.
12 瑪諾亞向他說:「當你的話應驗的時候,我們應該怎樣管教這孩子﹖要怎樣待他﹖」
Manoa atunaki ye: — Tango maloba na yo ekokokisama, mibeko nini tosengeli kotosa mpo na bomoi ya mwana? Mpe ye mwana asengeli kosala nini?
13 上主的使者對瑪諾亞說:「我給這婦人所說的一切,她都當留神:
Anjelu na Yawe azongiselaki Manoa: — Mwasi na yo asengeli kosala makambo nyonso oyo nayebisaki ye.
14 凡葡萄樹所結的,她不能吃;清酒濃酒她不能喝,各種不潔的東西她不能吃;凡我所吩咐她的,她都該遵守。」
Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye.
15 瑪諾亞對上主的使者說:「請容許我留你,為你預備一隻小山羊。」
Manoa alobaki na Anjelu na Yawe: — Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba.
16 上主的使者對瑪諾亞說:「你雖然劉我,我卻不吃你得食物;假使你要獻一全燔祭,就當獻於上主。」因瑪諾亞當時還不知道他是上主的使者。
Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa: — Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe. Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe.
17 瑪諾亞問上主的使者說:「你叫什麼名字﹖當你的話應驗的時候,我們好恭敬你。」
Manoa atunaki Anjelu na Yawe: — Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama?
18 上主的使者回答說:「你為什麼問我的名字﹖它是奧妙的。」
Anjelu na Yawe azongiselaki ye: — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa.
19 瑪諾亞取了一隻小山羊和素祭,在一塊磐石上獻於行奇事的上主。
Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa.
20 當火燄從祭壇上向天升起時,上主的使者也在祭壇的火燄中上升了。瑪諾亞和他的妻子看見這事,就俯伏在地上。
Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele.
21 上主的使者沒有再顯現給瑪諾亞和他的妻子,那時瑪諾亞才知道他是上主的使者。
Tango Anjelu na Yawe alimwaki na miso ya Manoa mpe ya mwasi na ye, Manoa asosolaki ete ezalaki Anjelu ya Yawe.
22 瑪諾亞對自己的妻子說:「我們必定要死,因為我們看見了天主。」
Manoa alobaki na mwasi na ye: — Solo, tokufi na biso, pamba te tomoni Nzambe!
23 但他妻子對他說:「如果上主有意叫我們死,必定不會悅納我們的手所獻的全燔祭和素祭,必不會使我們看見這些事,也不會使我們聽到像現在這樣的話。」
Kasi mwasi na ye azongisaki: — Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo.
24 後來那婦人生了一個兒子,給他起名叫三松;孩子漸漸長大,上主祝福了他。
Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye.
25 在瑪哈乃丹,即在祚辣與厄市陶耳之間,上主的神開始感動他。
Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.

< 士師記 13 >