< 約書亞記 13 >

1 若蘇厄年紀已老,上主對他說:「你年紀已老,但還有廣大的地區應當佔領。
Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye: « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.
2 還應佔領的地區:是培肋舍特人的整個地區,和革叔爾人的全境;
Tala mokili oyo etikali: Bituka nyonso ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Geshuri:
3 由埃及東方的史革爾人的全境,到北方的厄刻龍的邊界,這是屬客納罕人的區;那五個培肋舍特酋長所管轄的迦薩人、阿市多得人、阿市刻隆人、加特人和厄刻龍人地區,以南方的阿威人地區;
etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia: mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni; etuka ya bato ya Avi;
4 遇客納罕人的全境,即由漆東人的阿辣,直到阿費克,而直到阿摩黎人的邊界地區;
mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori;
5 還有革巴耳人的地區,及東方的整個黎巴嫩區,由赫爾孟山麓巴耳加得,直到哈瑪特關口。
etuka ya bato ya Gebali; mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati.
6 從黎巴嫩直到西方的米斯勒佛特瑪殷,所有住在山地的居民,所有的漆東人,我必從以色列民子面前,把他們趕走。你只管照我指示,將這地區抽籤分給以色列人作為產業。
Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo;
7 現在你要這九地區分九支派和默納協半支派作為產業。」
mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. »
8 默納協另半支派和勒烏本並加得二支派,已經得了梅瑟在約旦河東岸分給他們的產業;按上主的僕人梅瑟分給他們的產業,
Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani.
9 是從阿爾農谷旁的阿洛厄爾起,包括谷中的城邑,全默爾巴高原,直到狄朋;
Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni,
10 還有在赫市朋為王的阿摩黎人王息紅所有的城市,直到阿孟子民的邊疆;
mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni.
11 還有基肋阿得和革叔爾人與阿加人的領土,以及全赫爾孟山,全巴商,一直到撒耳加;
Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika.
12 又巴商王敖格的全國領土,他原是勒法因人最後的遺族,在阿市塔洛特和厄德勒為王。這些地方的人,都被梅瑟擊敗趕走了。
Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.
13 以色列子民郤沒有趕走革叔爾人和瑪阿加人,因此革叔爾和瑪阿加人直到? 直到現在仍住在以色列人中間。
Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
14 惟有肋未沒有分得產業,因為上主以色列的天主自己是他們的產業,有如上主對他們所說的。
Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.
15 梅瑟給勒烏本支派,按照他們的家族,分了一份產業。
Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango:
16 他們的地區,是從阿爾農谷旁的阿洛厄爾,包括中谷的城邑,直到默德巴整個高原。
Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba,
17 赫市朋和在這高原所有的城市:狄朋、巴摩特巴爾、貝特巴爾默紅、
kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,
18 雅哈茲、刻德摩特、默法阿特、
Yakatsi, Kedemoti, Mefati,
19 刻黎雅塔因、息貝瑪、山中盆地的責勒特沙哈爾、
Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku,
20 貝特培敖爾、丕斯加山坡、貝特耶史摩特、
Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti:
21 高原上各城市,和在赫市朋為王的阿摩黎人王息紅的整個國土。梅瑟曾殺了 息紅和住在那個上的息紅藩屬,米德揚的酋長:厄威、勒狄、族爾、胡爾和勒巴。
bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani: Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye.
22 以色列子民殺這些人時,也用刀殺了貝敖爾的兒子巴郎術士。
Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi.
23 勒烏本子孫的地區以約旦河為界:以上是勒烏本子孫按照家族,分得作為產業的城市和所屬的村鎮。
Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango.
24 梅瑟按照他們的家族,給加得支派,給加得子孫,分得了一份產業。
Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango:
25 他們的地區是雅則爾,基肋阿得所有的城邑和阿孟人的一半土地,直到勒巴對面的阿洛厄爾;
Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba;
26 又從赫市朋直到勒瑪特米茲帕和貝特尼,從瑪哈納殷到羅德巴爾的邊境;
mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri;
27 還有谷中盆地的貝特哈蘭、貝特尼默辣、穌苛特、匝豐、赫市朋王息紅國中的其餘土地;以約旦河為界,沿約旦河東岸直到基乃勒特海的頂端:
mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani.
28 以上是加得子孫按照家族,得作為產業的城市和所屬的村鎮。
Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Gadi, kolanda bituka na bango.
29 梅瑟也給默納協半支派,給默納協半支派子孫,按照他們的家族,分了一份產業。
Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango:
30 他們的地區是起自哈瑪納殷,包括全部巴商,即巴商王敖格的全部國土,巴商境內屬雅依爾的各村莊,共計六十村莊;
Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba,
31 還有基肋阿得的一半和家族和敖格在巴商的都城阿市塔洛特和厄德勒:以上地區按照家族,分給了默納協的兒子瑪基爾的子孫,即瑪基爾的一半子孫。
ndambo ya mokili ya Galadi; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.
32 以上是梅瑟在約旦河東岸,耶利哥面對摩阿布曠野裏,所劃分的產業。
Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko.
33 至於肋未支派,梅瑟沒有給他們分配產業,因為上主以色列的天主自己是他們的產業,有如上主對他們所說的。
Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.

< 約書亞記 13 >