< 約伯記 8 >
Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:
2 這些話你要講到幾時﹖你口中的話像狂風要到何時﹖
« Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye? Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi?
Boni, Nzambe abukaka mibeko, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo?
4 若你的子女得罪了他,他必將他們交於罪過的權勢下。
Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye, apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango!
Kasi yo, soki oluki Nzambe, soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,
6 你若純潔正直,他必親來守護你,恢復你正義的居所。
soki ozali peto, soki ozali sembo, akotelema Ye moko, ata sik’oyo, mpo na kokata likambo na yo mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.
Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.
Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,
9 因為我們由昨日纔有,本來一無所知;我們在世上的日月,好似影子。
pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.
Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo, mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo:
11 蒲草不在池沼內,怎能長大﹖蘆葦沒有水,怎會長起﹖
Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobota na esika oyo ezangi potopoto? Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobota na esika ekawuka?
Ekawukaka liboso ya matiti nyonso, wana makasa na yango ezali nanu mobesu, ata bapikoli yango te.
13 凡忘記天主的,他的末路也是這樣:惡人的希望必化為泡影。
Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.
Eloko oyo batielaka motema ekokatana, pamba te elikya na bango ezali lokola ndako ya limpulututu.
15 他倚恃自己的家,但它卻站立不住;他要依附自己的住所,住所卻不能久存。
Ata batieli ndako na bango motema, esimbaka te; Ezala bakangami na yango, esimbaka kaka te.
Bazali lokola nzete ya mobesu na tango ya moyi makasi; mandalala na yango ezipaka elanga,
elingaka misisa na yango zingazinga ya mabanga mpe epasolaka nzela kati na mabanga;
18 若有人從原處把它拔除,那地必否認說:「我未曾見過它。」
kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, esika yango ewanganaka nzete mpe elobaka: ‹ Natikala komona yo te! ›
Ndenge wana nde suka na yango ekozala; mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana.
20 天主決不棄捨完善的人,也決不支持惡人的勢力。
Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo, mpe alendisaka te maboko ya bato mabe.
21 你的口角必再洋溢著喜悅,你的唇邊必再充滿歡笑。
Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka, mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo.
Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »