< 約伯記 41 >

1 你豈能以魚鉤鉤上鱷魚﹖以繩索縛住牠的舌頭﹖
Boni, okoki koloba ngando na ndobo? Okoki kokanga lolemo na yango na singa?
2 你豈能以鼻圈穿過牠的鼻子,以鉤子刺透牠的腮骨﹖
Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo? Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo?
3 牠豈能再三向你哀求,向你說甜言蜜語﹖
Boni, ekobondela yo mingi? Ekoloba na yo maloba ya boboto?
4 牠豈能同你訂立盟約,使自己常作你的奴隸﹖
Ekoki kosala boyokani elongo na yo mpo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela?
5 你豈能玩弄牠像玩弄小鳥,將牠縛著作你女兒的玩物﹖
Okoki kosakana na yango lokola ndeke? Okoki kokanga yango na singa mpo na kosepelisa bana na yo ya basi?
6 結夥的漁人不是想在牠身上謀利,將牠售與商人﹖
Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo? Bakoki kokabola yango epai ya bateki?
7 你豈能以長矛穿透牠的皮,以魚叉刺透牠的頭顱﹖
Okoki kotobola mokongo na yango na makonga? Okoki kotobola moto na yango na ndobo oyo bakangelaka bambisi?
8 將你的掌撫在牠身上罷! 若你想到惡鬥,決不敢再撫。
Tia loboko na yo na likolo na yango: soki okanisi etumba oyo okutani na yango, okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.
9 看,人的希望落了空,並且一見牠就嚇壞了。
Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba; soki kaka omoni yango, okweyi na somo.
10 沒有一個勇敢的人敢觸犯牠,有誰還敢站立在牠前面呢﹖
Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango; boye nani akoki kotelemela ngai?
11 誰攻擊牠,而能安全無恙﹖普天之下沒有一人!
Nani adefisaki ngai eloko mpo ete nafuta niongo na ye? Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.
12 論牠的四體百肢,我不能緘默;論牠的力量,我要說:沒有可與牠相比的。
Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela biteni na yango ya nzoto, makasi na yango mpe kitoko ya nzoto na yango.
13 誰能揭開牠的外衣,誰能穿透牠雙層的鱗甲﹖
Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto? Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango?
14 誰敢啟開牠的口﹖牠四周的牙齒,令人戰慄。
Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango? Minu na yango etonda na somo.
15 牠的脊背有如盾甲,好像為石印所密封。
Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba, ekangama elongo na ezipelo ya mabanga.
16 鱗甲片片相連,氣也透不進去:
Ekangama moko na mosusu, mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te.
17 互相聯結,黏在一起不可分離。
Ekangama moko na mosusu, esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te.
18 牠的噴嚏發出白光,眼睛像旭日閃動。
Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole; mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo.
19 火把從牠口中噴出,火花四射。
Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.
20 煙從牠鼻孔冒出,宛如燃燒沸騰的鍋鑪。
Milinga ebimaka na zolo na yango lokola na mbeki oyo ezali kotoka to lokola nzungu ya ebende ya moto.
21 牠的氣息可點燃煤炭,火燄由牠口中射出。
Pema na yango epelisaka makala ya moto, lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango.
22 牠的力量集中在牠的頸上,在牠面前,沒有不恐怖的。
Makasi na yango evandi na kingo na yango, mpe somo ebimaka liboso na yango.
23 牠的肌肉互相連結,緊貼牠身,堅不可動。
Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo, elendisama makasi mpe eninganaka te.
24 牠的心堅如石塊,堅硬有如磨磐。
Motema na yango ezali makasi lokola libanga, makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma.
25 牠一起立,壯士戰慄,驚慌失措。
Soki etelemi, bato ya makasi babangaka, mpe somo ekimisaka bango.
26 人若想捕捉牠,刀、槍、箭、戟都是徒然。
Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli, ekosala yango eloko te.
27 牠視鐵如草芥,視銅若朽木。
Emonaka ebende lokola lititi, bronze lokola nzete epola.
28 弓矢不能使牠遁逃;機石打在牠身上好似碎湝。
Mbanzi ekimisaka yango te, mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga ezali lokola poso ya loso mpo na yango.
29 牠視棍棒像麥湝,對射來的箭矢冷笑。
Makonga ezali lokola matiti mpo na yango, mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike.
30 牠腹下似尖瓦,牠行過之地,有如打禾機碾過。
Se ya libumu na yango etonda na banzube, etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.
31 牠使深淵沸騰有如沸鼎,使海洋沸騰有如油鍋。
Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi oyo ezali kotoka na nzungu, ekomisaka ebale monene lokola nzungu oyo batokiselaka malasi.
32 牠游過之路發出銀光,令人以為海洋飄揚白髮。
Engengisaka nzela na sima na yango lokola suki ya pembe likolo ya mayi.
33 世上沒有可與牠相比的,牠一無所懼。
Na mokili, nyama moko te ekokani na yango; mpe ebangaka te.
34 牠卑視所有的巨獸,牠在猛獸中稱王。
Ebangaka te kobundisa banyama minene, ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. »

< 約伯記 41 >