< 約伯記 36 >

1 厄里烏又接著說:
Eliwu abakisaki lisusu:
2 你且等一會,容我教導你,因為為天主,我還有些話要說。
« Yokela ngai nanu moke, nalingi koteya yo, nazali na makambo mingi mosusu ya koloba na tina na Nzambe.
3 我要將我所知的傳到遠方,將正義歸於我的造主。
Tala, nazali kozwa mosika boyebi na ngai mpo na kobundela mpe kolongisa Mokeli na ngai.
4 的確,我的話正確無偽,知識全備的人同你一起。
Yeba malamu ete maloba na ngai ezali ya lokuta te, ezali moto na boyebi ya solo nde azali pene na yo.
5 的確,天主寬宏大量,決不藐視任何人,並且有廣大的同情心。
Tala monene ya Nzambe! Kasi atiolaka na Ye bato te, nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te.
6 他決不容許惡人生存,但給窮苦人伸冤;
Atikaka moto mabe te kozala na bomoi, alongisaka banyokolami,
7 他也不剝奪義人的權利。他使君王永久坐在寶座上,但是他們卻驕矜自大;
alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene, avandisaka bango na kiti ya bokonzi elongo na bakonzi mpe atombolaka bango mpo na libela.
8 故此,當他們一旦被鎖鏈束縛,被痛苦的繩索所繫,
Kasi soki bato bakangami na minyololo to na basinga ya minyoko,
9 天主就向他們指明他們的惡行,和他們所誇耀的過犯,
atalisaka bango mabe oyo basali, mpe masumu oyo basalaka mpo na lolendo na bango.
10 開啟他們的耳朵,以聽訓戒,囑咐他們離開邪惡。
Afungolaka bango matoyi mpo na kokebisa bango mpe atindaka bango kotika mabe.
11 如果他們服從順命,便能幸福地度過歲月,能安樂地享受天年。
Soki batosi mpe basaleli Ye, bakolekisa mikolo na bango oyo etikali na bomengo, mpe mibu na bango na esengo.
12 如果不服從,必被射死,於不知不覺中逝去。
Kasi soki batosi Ye te, bakokufa na mopanga mpe bakosila mpo na kozanga boyebi.
13 心術敗壞的人,憤怒填胸,縱被囚禁,仍不呼求救助;
Bato oyo bayebi Nzambe te mpe mitema na bango etondisami na kanda, babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo.
14 他們必早年夭折,喪命如男倡。
Bakufaka na bolenge, basukisaka bomoi na bango kati na mibali oyo bamipesaka na kindumba ya bule.
15 所以天主藉痛苦拯救受難的人,以患難開啟他們的耳鼓。
Kasi bato oyo bazali konyokwama, akangolaka bango na nzela ya minyoko na bango, afungolaka bango matoyi na nzela ya pasi.
16 他也要救你擺脫災難,領你到廣闊自由之地,在你桌上常擺滿肥饌美味;
Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi mpo na kovandisa yo na esika ya pole, esika oyo ezangi mitungisi; akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko.
17 無如你判斷與惡人完全一樣,那麼懲罰和判案必集於你身。
Kasi soki sik’oyo ozali kosala lokola moto mabe, etumbu mpe kosambisama ekokweyela yo.
18 小心! 不要讓忿怒引你肆口謾罵,也不要為重罰讓你離棄正道。
Tika ete elakeli mabe oyo etelemeli yo etinda yo te na kotomboka! Boni, okoki kopesa kanyaka na bato ebele? Kasi kopengwa te!
19 你的哀號和你所有的力量,豈能使你擺脫患難﹖
Boni, bozwi na yo ezali solo na motuya mpo na kokangola yo? Ezala mabanga na yo ya wolo to makasi na yo nyonso, boni, ekokoka solo kokangola yo?
20 不要希望黑夜,那是人民由本地被劫去的時候。
Kozala na posa te ya butu oyo elongolaka bato kati na bandako na bango.
21 小心! 別傾向不義,因為這正是你遭難的真正原因。
Mibatela ete okweya na mabe te, pamba te osepeli na mabe koleka minyoko.
22 天主的能力確實偉大,那有像他那樣的主宰﹖
Tala, Nzambe azali Mokonzi ya nguya na Ye, nani ateyaka koleka Ye?
23 誰能規定他的道路,誰敢說:你行的不對﹖
Nani akengelaka etamboli na Ye? Nani akoki koloba na Ye: ‹ Ozali kosala mabe? ›
24 你應記住要讚頌他的工程,這是人們應歌詠的。
Kanisa kokumisa misala na Ye, misala oyo bato bazali kokumisa na banzembo.
25 人人都能觀賞,都能從遠處仰望:
Bato nyonso bamonaka yango, batalaka yango na mosika.
26 天主何其偉大,我們不能理解! 他的歲數,無法考究。
Tala ndenge nini Nzambe azali monene! Tososolaka yango te. Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye.
27 他汲取水滴,使水氣化為雨露,
Abendaka mayi epai na Ye, na mapata; akomisaka yango mvula, mvula oyo enokaka mpe etondisaka bibale.
28 雨即從雲中傾盆而降,沛然落在眾人身上。
Mapata ekweyisaka yango, mpe enokisaka yango likolo na ebele ya bato.
29 但誰能明瞭雲彩怎樣散布,天幕中怎樣發出隆隆之聲﹖
Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata mpe ndenge bakake ebimaka wuta na ndako na Ye?
30 他將雲霧展開,遮蓋了群山山頂。
Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato mpe atondisaka mozindo ya ebale monene.
31 他藉此養育萬民,賜給他們豐富的食糧。
Na nzela ya biloko oyo nyonso, Nzambe asambisaka bikolo mpe apesaka bilei ebele.
32 他掌中握著電光,對準目標發射出去。
Atondisaka maboko na Ye mibale na mikalikali, akotinda yango na esika oyo Ye aponi.
33 雷霆報告他的來臨,他的怒火將要懲罰邪惡。
Makelele ya bakake epesaka sango ya koya na Ye, ata kutu bibwele esosolaka koya na Ye.

< 約伯記 36 >