< 約伯記 33 >

1 約伯,請你且聽我的話,側耳靜聽我說的一切。
Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai!
2 請看,我已開口,舌頭已在口腔內發言。
Tala, nafungoli monoko na ngai, maloba na ngai ezali na songe ya lolemo.
3 我的話是出於正直的心,我的唇舌要清楚說明真理。
Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
4 天主的神造了我,全能者的氣息使我生活。
Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.
5 你如果能夠,就回答我,請準備好,來對抗我。
Boye soki okoki, yanola ngai, mibongisa mpo na komekana na ngai.
6 看,我與你在天主前都是一樣,我也是用泥土造成的。
Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe; ngai mpe nawutaki na putulu.
7 所以我的威嚇不會使你恐怖,我的手也不會重壓在你身上。
Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.
8 你所說的,我已耳聞,聽到了你所說的話:「
Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—
9 我本純潔無罪,清白無瑕。
‹ Nazali sembo, nasali masumu te; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
10 但天主卻在我身上找錯,視我為他的對頭;
Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.
11 他把我的腳縛在木樁上,窺察我的一切行動。」
Akangi makolo na ngai na bibende, azali kononga banzela na ngai nyonso.
12 我答覆你說:你這話說的不對,因為天主遠超世人。
Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, pamba te Nzambe azali monene koleka moto.
13 他既不答覆你說的一切話,你為何還同他爭辯﹖
Mpo na nini ozali kosamba na Ye? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.
14 原來天主用一種方法向人講話,人若不理會,他再用另一種方法:
Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu, kasi moto asosolaka yango te.
15 天主有時藉夢和夜間的異像,當人躺在床上沉睡的時候,
Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto;
16 開啟人的聽覺,用異像驚嚇他,
boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,
17 使人脫離惡念,使人剷除驕傲,
mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe mpe kobatela ye na lolendo,
18 阻攔他陷於陰府,救他的性命脫離溝壑。
mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te, mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga.
19 天主也有時懲罰人在床上受痛苦,使他的骨頭不斷的刺痛,
Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye, na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso kati na mikuwa na ye.
20 以致他討厭食物,他的心厭惡美味。
Boye, azali kosepela lisusu na lipa te, mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi.
21 他身上的肉已消逝不見,他枯瘦的骨頭,已開始外露。
Nzoto na ye ekawuki na pamba, mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi.
22 他的靈魂已臨近墓穴,他的生命已接近死亡之所。
Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda, mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa.
23 一千天使中,若有一個在他身傍,作他的代言人,提醒他應行的義務,
Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, kati na ba-anjelu nkoto moko, mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo,
24 且憐憫那人,為他轉求說:「求你拯救他,以免陷於陰府,因為我已找到了贖金。」
tika ete asalela ye ngolu mpe aloba: ‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa, nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, ›
25 他的肉身比少年人的肉身必更健美,他的青春歲月又恢復了。
nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe lokola na tango ya bolenge na ye, ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye.
26 他祈求天主,必獲得悅納。他必歡樂得見天主的儀容,天主也必恢復他的正義。
Akosambela Nzambe, akozwa ngolu na miso na Ye, akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.
27 那時,他將在人前重述所經歷的事說:「我犯了罪,顛倒了是非,但他沒有照我的罪罰我。
Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba: ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.
28 他救了我生命免入陰府,使我重見光明。」
Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, mpe nakowumela kati na pole na esengo. ›
29 這就是天主接二連三為人所做的事,
Nzambe asalaka makambo oyo nyonso epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato,
30 挽救他脫離陰府,重見生命之光。
mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.
31 約伯啊! 請留神傾聽,靜靜地聽我說話!
Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai! Nazali na makambo ya koloba na yo.
32 你若有話說,請即回覆我,你儘管說,因為我願聽你的理。
Kasi soki ozali na likambo ya koloba, yebisa ngai yango, pesa ngai eyano, mpe ngai nakolongisa yo.
33 若沒有話,且聽我說,靜聽我要教給你的智慧。
Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. »

< 約伯記 33 >