< 約伯記 31 >
« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.
2 天主由上所注定的一分是什麼﹖全能者由高處所給的產業是什麼﹖
Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo?
3 豈不是為惡人注定了喪亡,為作孽的人注定了災殃﹖
Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te?
Amoni banzela na ngai te? Atangi matambe na ngai nyonso te?
Soki natambolaki na lokuta to litambe na ngai elandaki nzela mabe,
tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, mpe akomona ete ngai nasali mabe te.
7 我的腳步如果離開了正道,我的心如果隨從了眼目之所見,我的手若持有不潔,
Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, soki maboko na ngai ekomaki mbindo,
8 那麼,我種的,情願讓別人來吃;我栽的,情願讓別人拔出。
tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni, mpe tika ete nkona na ngai epikolama!
9 我的心如果為婦女所迷,我如果曾在鄰人門口等候婦女,
Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai,
tika ete mwasi na ngai atutela moto mosusu ble mpe tika ete mibali mosusu basangisa na ye nzoto.
Pamba te elingaki kozala likambo ya soni, mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi.
Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso.
Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe,
14 天主起來時,我可怎麼辦呢﹖他若追問,我可怎樣回答﹖
nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai? Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai ndenge nini nabandaki kosala?
15 在母胎造成我的,不是也造了他們﹖在母胎形成我們的,不是只有他一個﹖
Ezalaki Ye te oyo asalaki ngai kati na libumu ya mama na ngai nde asalaki bango? Ngai na bango, tozalaki lolenge moko te kati na mabumu ya bamama na biso?
16 我何時曾拒絕了窮苦人的渴望,我何時曾使寡婦的眼目頹喪﹖
Soki nakokisaki te posa ya mobola to soki nalembisaki miso ya mwasi oyo akufisa mobali,
soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko to nakabolaki yango te na bana bitike,
18 因為天主自我幼年,就像父親教養了我;自我出了母胎,就引導了我。
—nzokande wuta bolenge na ngai, nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango; mpe wuta mbotama na ngai, nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali—
soki namonaki mobola kokufa na kozanga bilamba to moto akelela kozanga bilamba,
20 如果他的心沒有向我道謝,沒有以我的羊毛獲得溫暖,
bongo motema na ye epambolaki ngai te na ndenge nazipaki ye na bilamba oyo ewutaki na bibwele na ngai,
21 如果我在城門口見有支持我者,就舉手攻擊無罪者,
soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe, wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi,
22 那麼,讓我的肩由胛骨脫落,我的胳膊由肘處折斷!
tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai to ebukana!
23 因為天主的懲罰使我驚駭,因他的威嚴,我站立不住。
Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.
24 我何嘗以黃金為依靠,對純金說過:「你是我的靠山﹖」
Soki natiaki elikya na ngai na wolo to nalobaki na wolo ya kitoko: ‹ Ozali ekimelo na ngai, ›
soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai, bomengo oyo maboko na ngai esalaki,
soki natalaki moyi na kongenga na yango to sanza kotambola na nkembo,
soki motema na ngai ekosamaki na nkuku, mpe maboko na ngai epesaki yango beze ya lokumu,
28 這也是應受嚴罰的罪過,因為我背棄了至高的天主。
wana elingaki lisusu kozala mbeba oyo ebongi na esambiselo ya basambisi, pamba te nalingaki kowangana Nzambe oyo azali na Likolo.
Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye,
soki napesaki nzela na monoko na ngai ete esala lisumu na kosenga kufa ya monguna na ngai na nzela ya maloba ya kolakela mabe;
31 我帳幕內的人是否有人說過:「某人沒有吃飽主人給的肉﹖」
soki bato ya libota na ngai balobaka te: ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo? ›
32 外方人沒有睡在露天地裏,我的門常為旅客敞開。
Soki mopaya moko te alalaki libanda, pamba te ekuke na ngai ezalaki ya kofungwama tango nyonso mpo na moleki nzela,
33 我豈像凡人一樣,掩飾過我的過犯,把邪惡隱藏在胸中﹖
soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,
34 我豈怕群眾的吵鬧﹖親族的謾罵豈能嚇住我,使我不敢作聲,杜門不出﹖
pamba te nabangaki bato mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, yango wana nakangaki monoko mpe nakokaki kobima libanda te!
35 惟願天主俯聽我,這是我最後的要求:願全能者答覆我! 我的對方所寫的狀詞,
Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai!
Solo, nalingaki komema yango na lipeka na ngai, nalingaki kolata yango lokola motole,
37 我將像王侯一樣走向他面前,向他一一陳述我的行為。--約伯的話至此為止。
nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki, nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.—
Soki mabele na ngai eboyi ngai, soki mikala na yango elelaki,
39 我若吃田中的產物而不付代價,或叫地主心靈悲傷,
soki naliaki bambuma na yango na ofele to soki natungisaki bankolo na yango,
40 願此地不再長小麥而長荊棘,不長大麥而長惡草。
tika ete banzube ebima na esika ya ble, mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. » Oyo nde suka ya maloba ya Yobo.