< 約伯記 24 >

1 全能者為何不劃定一個期限呢﹖忠於他的人為何看不到他的日子﹖
Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te mpo na esambiselo? Mpo na nini bato oyo bayebi Ye basengeli koluka na pamba mikolo ya boye?
2 惡人挪移地界,搶去羊群自去牧放;
Bato bapusaka bandelo, bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki,
3 趕走孤兒的驢,拿去寡婦的牛作抵押;
babotolaka ane ya mwana etike mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali ya mwasi oyo akufisi mobali;
4 迫使窮人離開正路,使境內的貧民隱藏不露。
balongolaka babola na nzela, mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama.
5 看啊! 他們像曠野的野驢,出來尋覓食物;他們縱使到晚操作,卻找不到養子女的食物。
Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongo na mosala mpo na koluka biloko ya kolia, kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei;
6 夜間遂到田間去收割,到惡人的葡萄園中去摘取。
bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele mpe balokotaka bambuma oyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe.
7 赤身過宿,無衣蔽體;嚴寒之時,沒有舖蓋。
Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba, bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili;
8 在山中為暴雨淋透,因無處避身,而臥於磐石下。
bapoli na mvula ya ngomba, bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama.
9 另有些人將孤兒從母懷中搶去,剝去窮人的衣服作抵押,
Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.
10 致使他們無衣赤身行走,枵腹擔荷麥捆;
Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu; bamemaka maboke ya nzete ya ble, kasi bazongaka kaka na nzala.
11 在石槽中搾油、踐踏,反受口渴之苦。
Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu, bakamolaka bambuma ya vino, kasi bazongaka kaka na posa ya komela.
12 臨死者的呻吟,聲聞城外;負傷者呼求救援,天主卻不理會他們的哀求。
Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.
13 另有些人反抗光明,不認識光明的道路,更不走光明的途徑。
Bato oyo bazali kosala bongo, bazali kotombokela pole, bayebi nzela na Ye te mpe batambolaka ata kati na yango te.
14 兇手黎明即起,去殺害困苦和貧窮的人,夜間去作盜賊。
Mobomi azali kotelema na moyi mpe koboma mobola elongo na moto akelela; na butu, azali lokola moyibi.
15 姦夫的眼盼望黃昏,他心裏說:「沒有眼可看見我! 」就將自己的臉遮蔽起來。
Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota; amilobelaka: ‹ Moto moko te akomona ngai, › mpe abombaka elongi na ye.
16 竊賊夜間挖穿屋牆,白日將自己關起,不願看見光明,
Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato; kasi na moyi, bamikangelaka na ndako, bazali koboya pole.
17 因為早晨對這班人有如死影,他們已熟悉了黑暗的恐怖。
Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo, somo ya molili ekomaka moninga na bango.
18 他們輕如水萍,隨波逐流,地上的家業已被詛咒,榨酒者不再走入他們的葡萄園。
Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.
19 亢旱酷暑怎樣溶盡雪水,陰府也怎樣將罪犯吸去。 (Sheol h7585)
Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe, ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelaka bato oyo basalaka masumu. (Sheol h7585)
20 懷孕他的要忘掉他,蛆蟲要腐蝕他,人不再記念他,邪惡如樹一般被人砍倒。
Libumu ya mama ebosanaka bango mpe bankusu esepelaka kolia bango. Bakanisaka bango lisusu te, pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.
21 他欺壓了不生育的石女,沒有善待寡婦。
Bato mabe basepelisaka basi bazangi bana mpe bato oyo babotaka te, kasi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali.
22 然而天主將以威力擄獲強者,他必興起,使他們不能保存生命。
Kasi Nzambe, na nguya na Ye, abakisaka mikolo ya banyokoli na bango; ata batombolami, bazalaka na elikya te mpo na bomoi na bango.
23 雖暫時讓他們平安休息,但他的眼正監視著他們的行徑。
Nzambe apesaka bango kimia, kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.
24 他們居於高位,不久即不見了;他們必喪亡,有如鹹草;必被剪去,猶如麥穗。
Mpe atako sik’oyo bazali bato minene, na tango moke bakozala lisusu te, bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso, bakokatama lokola mito ya ble.
25 是否如此﹖誰能證明我說謊,誰能以我的話為荒誕﹖
Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai ete nazali koloba lokuta? Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba? »

< 約伯記 24 >