< 約伯記 10 >

1 我實在厭惡我的生活,我要任意苦訴我的怨情,傾吐我心中的酸苦。
Nayini bomoi na ngai! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.
2 我要對天主說:不要定我的罪! 請告訴我:你為何與我作對﹖
Nakoloba na Nzambe: ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali! ›
3 你對親手所造的,加以虐待和厭棄,卻顯揚惡人的計劃,為你豈有好處﹖
Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe?
4 你豈有肉眼,或者也像人一樣觀看嗎﹖
Boni, ozali na miso ya mosuni? Ozali komona lokola bato?
5 你的日月豈像人的日月﹖你的年歲豈像人的年歲﹖
Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato, mpe mibu na yo, lokola mibu ya bato,
6 你竟考查我的邪惡,追究我的罪過。
mpo ete oluka mabe na ngai to okundola masumu na ngai,
7 其實你知道我並沒有罪過,也知道無人能拯救我脫離你的掌握。
atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo?
8 你親手形成了我,創造了我;此後你又轉念想消滅我。
Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai; olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai?
9 求你記憶:你造我時就像摶泥,難道還使我歸於泥土﹖
Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu?
10 你不是將我像奶倒出,使我凝結像一塊奶餅﹖
Osopaki ngai lokola miliki te? Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage?
11 用皮和肉作我的衣服,用骨和筋把我全身聯絡起來﹖
Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te? Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te?
12 是你將我生命的恩惠賜給了我,細心照顧維持了我的氣息。
Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu; mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai.
13 這些事早已藏在你心中,我知道你久有此意:
Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo, mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo.
14 你監視我,看我是否犯罪;如果我有罪;你決不放過。
Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.
15 我若有罪,我就有禍了! 我若有義,也不敢抬頭,因為我已備嘗凌辱,吃盡苦頭。
Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai! Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, pamba te natondisami na soni mpe nazindi kati na pasi na ngai.
16 我若抬頭,你就像獅子追捕我,向我表現你的奇能,
Soki nameki kotombola moto, ozali kolanda ngai lokola nkosi mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso mpo na kotelemela ngai,
17 重新襲擊我,加倍對我洩怒。
ozali komemela ngai batatoli ya sika mpo na kotelemela ngai, ozali kopelisela ngai kanda na Yo mpo na kosala ngai mabe, mampinga na Yo bazali tango nyonso koya kobundisa ngai.
18 你為何叫我出離母胎﹖不如我那時斷氣,無人見我,
Mpo na nini obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai? Nalingaki na ngai kokufa, mpe liso moko te elingaki komona ngai.
19 就好像從未有過我一樣,一出母胎即被送入墳墓。
Soki kutu nazalaka na ngai te, nalingaki koleka kaka mbala moko longwa na libumu ya mama kino na kunda.
20 我生存的日月不是很少嗎﹖你且放開我罷!
Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela
21 趁我去而不返,未到冥暗死影之地,
liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,
22 即光明也是黑暗之地以前,讓我自在一下罷!
na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »

< 約伯記 10 >