< 耶利米書 47 >

1 在法郎尚未進攻迦薩以前,關於培肋舍特,上主有話傳給耶肋米亞先知說:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza:
2 上主這樣說:「看,有水從北方湧來,形成一條氾濫的河流,淹沒大地和地上的一切,首都和其中的居民;人們必要喊叫,大地所有的居民必要哀號。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor, etondi lokola ebale oyo etondi mayi; ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango, bingumba mpe bavandi na yango nyonso. Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela
3 一聽到他駿馬的鐵蹄聲,轔轔的戰車聲,和隆隆的飛輪聲,為父親的已束手無策,不能再顧及自己的兒子,
tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, lokito ya bashar ya banguna mpe makelele ya bapine na yango. Batata bakozala lisusu na tango te ya kosunga bana na bango mpo ete maboko na bango ekolemba.
4 因為消滅一切培肋舍特人,和摧毀提洛及漆冬一切殘餘助手的日子來到了,上主要消滅培肋舍特人,加非托爾島的遺民
Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.
5 迦薩已一片荒涼,阿市刻隆已遭受滅亡;阿納克人的遺民,你們要割傷己身到何時呢﹖
Bakokokola suki ya moto ya Gaza lokola elembo ya matanga, Ashikeloni ekokanga monoko! Oh bino batikali kati na etando oyo ya lubwaku, kino tango nini bokotika komizokisa?
6 唉! 上主的刀劍! 到何時纔休息﹖請你入鞘休息安歇罷!
Bozali koganga: ‹ Ah mopanga ya Yawe, okopema tango nini? Zonga na ebombelo na yo, tika koboma mpe zala kimia! ›
7 但上主既對它出了命,它怎能休息﹖阿市刻隆和海濱,是他給它指向的地方。
Kasi ndenge nini ezala kimia tango Yawe apesi yango mitindo ya kobundisa Ashikeloni mpe mikili oyo ezali pembeni ya ebale monene? »

< 耶利米書 47 >