< 耶利米書 40 >

1 隊長乃步匝辣當從辣瑪釋放耶肋米亞以後,上主又有話傳給先知─俘虜中──
Yawe alobaki na Jeremi tango Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abikisaki ye na Rama. Akutaki Jeremi bakanga ye na minyololo kati na molongo ya bakangami oyo bawutaki na Yelusalemi mpe na Yuda, oyo bazalaki komema na bowumbu kuna na Babiloni.
2 衛隊長提出耶肋米亞後,便對他說:「雅威你的天主對這地方,曾預言過這番災禍,
Tango mokonzi ya bakengeli ya mokonzi amemaki Jeremi, alobaki na ye: — Yawe, Nzambe na yo, asilaki kokata ete pasi oyo ekokweya na esika oyo;
3 如今果然來了;雅威照他所說的做了;因為你們犯罪相反雅威,沒有聽他的聲音,所以為你們纔發生了這樣的事。
mpe sik’oyo akokisi yango, asali ndenge kaka akanaki kosala. Makambo oyo nyonso esalemi mpo ete bino, bato, bosalaki masumu liboso ya Yawe mpe batosaki Ye te.
4 現在,你看,今天我給你除去手上的鎖鏈;你若看著同我一起到巴比倫去好,就去,我必另眼看待你;你若看著同我一起到巴比倫去不好,沒有關係;你看,整個大地擺在你面前,你看著那裏好,去那裏相宜,就到那裏去罷。
Kasi na mokolo ya lelo, nazali kokangola yo na minyololo oyo bakangaki yo na maboko. Soki olingi, yaka elongo na ngai na mokili ya Babiloni mpe nakobatela yo; kasi soki mpe oboyi, koya te. Tala, mokili mobimba ezali liboso na yo; kende esika nyonso olingi.
5 你若願住下,可回到巴比倫王委任管理猶大城鎮的沙番的孫子,阿希甘的兒子革達里雅那裏去,與他一同住在民間;或是到看著相宜去的任何地方去。」衛隊長便給了他乾糧和禮物,打發他走了。
Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki: — Zonga epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisi moyangeli ya bingumba ya Yuda, mpe vanda epai na ye kati na bato na yo to kende esika nyonso olingi. Bongo mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki ye bilei mpe bakado, mpe atikaki ye kokende.
6 耶肋米亞來到米茲帕阿希甘的兒子革達里雅那裏,與他一同住在當地的遺民間。
Jeremi akendeki na Mitsipa epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mpe avandaki esika moko na ye kati na bato oyo batikalaki kati na mokili.
7 在鄉間殘存的各部隊首領和他們的屬下,聽說巴比倫王委派了阿希甘的兒子革達里雅管理當地,任命他照顧當地未遷徙至巴比倫去的男女、幼童和窮人,
Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni,
8 便親自和自己的屬下來到米茲帕革達里雅那裏;前來的,有乃塔尼雅的兒子依市瑪耳,卡勒亞的兒子約哈南,堂胡默特的兒子色辣雅,乃托法人厄法依的兒子們和瑪阿加人的兒子雅匝尼雅。
bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango: Isimaeli, mwana mobali ya Netania; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati; bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
9 沙番的孫子,阿希甘的兒子革達里雅對他們和部屬起誓說:「你們不要怕奉加色丁人;住在本地,臣屬於巴比倫王,於你們必利。
Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo: « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu.
10 至於我,看,我願住在米茲帕,為對付到我們這裏來的加色丁人;你們只管儲藏酒、油和夏季的出產,安放在器皿內,住在所佔的城市裏。」
Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. »
11 散居在摩阿布,阿孟子民間,厄東地以及其他各地的一切猶太人,也聽說巴比倫王給猶大留下了遺民,派了沙番的孫子,阿希甘的兒子革達里雅管理他們,
Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,
12 所有的猶太人就從自己飄流所至之地回來,來到猶大地類茲帕革達里雅那裏,收得了大量的酒和夏季的出產。
bango nyonso balongwaki na mikili nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana mpe bazongaki kati na Yuda, epai ya Gedalia, kuna na Mitsipa, mpe babukaki bambuma ya vino mpe bambuma mosusu ebele.
13 卡勒亞的兒子約哈南,和在鄉間所有部隊的首領,都到米茲帕革達里雅那裏,
Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka bayaki na Mitsipa epai ya Gedalia
14 對他說:「你是否知道:阿孟子民的君王巴里斯派遣乃塔尼雅的兒子依市瑪耳來殺害你﹖」但是阿希甘的兒子革達里雅不相信他們的話。
mpe balobaki na ye: — Oyebi te ete Balisi, mokonzi ya bato ya Amoni, atindi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpo na koboma yo? Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, andimelaki bango te.
15 卡勒亞的兒子約哈南私下在米茲帕對革達里雅提議說:「讓我去殺了乃塔尼雅的兒子依市瑪耳,沒有人會知道;為什麼要讓他來謀害你的性命,集合在你身邊的一切猶太人又遭離散,猶大遺民再遭滅亡﹖」
Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, ayebisaki Gedalia na nkuku, na Mitsipa: — Pesa ngai nzela ete nakende koboma Isimaeli, mwana mobali ya Netania! Moto moko te akoyeba yango. Mpo na nini aboma yo? Mpo na nini Bato nyonso ya Yuda, oyo bazali pene na yo bapanzana mpe ndambo oyo bakotikala bakufa?
16 阿希甘的兒子革達里雅答覆卡勒亞的兒子約哈南說:「不要作這件事,因為你論依市瑪耳所說的,只不過是流言。」
Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, alobaki na Yoanani, mwana mobali ya Karea: — Kosala bongo te! Makambo oyo ozali koloba mpo na Isimaeli ezali makambo ya lokuta.

< 耶利米書 40 >