< 耶利米書 38 >

1 瑪堂的兒子舍法提雅,帕市胡爾的兒子革達里雅,舍肋米雅的兒子猶加耳,瑪耳基雅的兒子帕市胡爾聽見耶肋米亞向全體人民講話說:「
Shefatia, mwana mobali ya Matani; Gedalia, mwana mobali ya Pashuri; Yukali, mwana mobali ya Shelemia; mpe Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, bayokaki makambo oyo Jeremi azalaki koyebisa bato nyonso. Azalaki koloba:
2 上主這樣說:凡留在這城裏的,必死於刀劍、饑荒和瘟疫;凡出降加色丁人的,必能生存:獲得生命如得戰利品一樣,可得生存。
« Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. ›
3 上主這樣說:這座城市必交在巴比倫王軍隊的手中,他必佔領這座城市。」
Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Engumba oyo ekokweya na maboko ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobotola yango. › »
4 眾首長就對君王說:「請將這人處死! 因為他說出了這樣使遺留在城裏的戰士和全體人民喪志的話;實在,這人謀求的,不是人民的福利,而是人民的災禍。」
Bakalaka balobaki na mokonzi: — Moto oyo asengeli kokufa! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.
5 漆德克雅王答說:「看,他已經在們手中;君王不能反對你們。」
Mokonzi Sedesiasi azongisaki: — Azali na maboko na bino; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te!
6 他們便將耶肋米亞丟在王子瑪耳基雅在監獄庭院裏有的蓄水池內,用繩將他放下去;池內沒有水,只有污泥;耶肋米亞就陷在污泥裏。
Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.
7 住在王宮裏的雇士人厄貝得默肋客宦官,聽見人把耶肋米亞放在蓄水池裏。那時君王正坐在本雅明門旁,
Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame,
8 厄貝得默肋客就從王宮出來,稟告君王說:
Ebedi-Meleki abimaki na ndako ya mokonzi mpe akendeki koloba na mokonzi:
9 「我主君王! 這些人對先知耶肋米亞作的事,實在毒辣;他們竟將他丟在蓄水池裏,在那裏他必要餓死,因為城中沒有糧食了! 」
— Mokonzi, nkolo na ngai, kati na nyonso oyo basali mosakoli Jeremi, bato oyo basali mabe penza! Basili kobwaka ye kati na libulu epai wapi akokufa na nzala, mpo ete mapa ezali lisusu te kati na engumba!
10 王便命雇士人厄貝得默肋客說:「你立即帶三個人去,將耶肋米亞先知,趁他還沒有死,從蓄水池裏拉出來! 」
Mokonzi apesaki mitindo oyo epai ya Ebedi-Meleki, moto ya mokili ya Kushi: — Kamata awa mibali tuku misato elongo na yo, mpe bobimisa mosakoli Jeremi wuta na libulu liboso ete akufa.
11 厄貝得默肋客立即帶了一些人,回到王宮,從儲藏室拿了些破舊衣裳和破舊布片,用繩索給在蓄水池裏的耶肋米亞放下去。
Ebedi-Meleki akamataki mibali yango mpe akendeki na ndako ya mokonzi, kati na shambre oyo ezalaki na se ya ebombelo bomengo; azwaki kuna bilamba ya kala mpe oyo epasuka, mpe akitisaki yango na nzela ya basinga epai ya Jeremi kati na libulu.
12 雇士人厄貝得默肋客對耶肋米亞說:「請把破舊的衣服和布片,放在你兩腋下,然後把繩放在下面。」耶肋米亞就這樣做了。
Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, alobaki na Jeremi: — Tia bilamba oyo na se ya mapeka na yo, likolo ya basinga oyo mpo na kobatela mapeka na yo. Jeremi asalaki se bongo.
13 於是他們用繩索將耶肋米亞從蓄水池裏拉上來;這樣,耶肋米亞纔仍能住在拘留所的庭院裏。
Babendaki ye na basinga mpe babimisaki ye na libulu. Mpe Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
14 漆德克雅王派人帶耶肋米亞先知到上主殿宇第三入口處去見他。君王對耶肋米亞說:「我要問你一件事,你什麼也不可對我隱瞞! 」
Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi: — Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo; kobombela ngai eloko moko te!
15 耶肋米亞答覆漆德克雅說:「我若稟告你,你豈不要將我處死嗎﹖我若給你出主意,你也不會聽從我! 」
Jeremi alobaki na mokonzi Sedesiasi: — Soki nayebisi yo yango, okoboma ngai te? Ezala napesi yo toli, okoyokela na yo ngai te.
16 漆德克雅王對耶肋米亞暗地發誓說:「那賜與我們這生命的上主永在,我決不將你處死,決不將你交在這些圖謀你性命者的手中。」
Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi: — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo!
17 於是耶肋米亞對漆德克雅說:「萬軍的天主,以色列的天主上主這樣說:如果你出去,向巴比倫王將帥投降,你的性命必可保全,這城不至於被焚;你和你全家也必生存。
Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi: — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi: « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te.
18 但是如果你不出去向巴比倫王將帥投降,這城必會被交在加色丁人的手裏,由他們放火燒城,而你也逃不出他們的手。」
Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »
19 漆德克雅王便對耶肋米亞說:「我很害怕那些投降加色丁人的猶太人,將我交在他們手中,任他們凌辱我。」
Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi: — Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai.
20 耶肋米亞答說:「他們不會將你交出! 在我對你所說的事上,你只管聽上主的聲音,事必於你有利,你的性命必可保全。
Jeremi azongisaki: — Te, bakokaba yo te! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo.
21 但是,如果你拒絕出降,這就是上主使我預見的事:
Kasi soki oboyi komipesa epai na bango, tala makambo oyo Yawe atalisi ngai:
22 看,凡留在猶大王宮的一切婦女,都要被領出,交給巴比倫王的將帥,哭訴著說:對你高唱和平的友人,欺騙了你,愚弄了你;見你雙腳陷入泥淖,就轉背逃遁。
« Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba: ‹ Baninga na yo ya motema bakosi yo mpe balongi yo. Matambe na yo ezindi na potopoto, baninga na yo bakimi yo! › »
23 你的妻子兒女,都要被領出,交給加色丁人;連你也逃不出他們的手,終於被巴比倫王捉去;至於這城,必要被火焚毀。」
Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.
24 於是漆德克雅對耶肋米亞說:「任何陽不得知道這些話,否則你就該死!
Sedesiasi alobaki na Jeremi: — Tika ete moto moko te ayeba makambo oyo, mpe okokufa te.
25 倘若首長們聽說我曾與你談論,而前來問你說:請你告訴我們,你對君王說了什麼﹖你不可對我們隱瞞,否則我們就要你的命! 究竟君王對你說了些什麼﹖
Soki bakalaka bayoki ete tosololi na yo mpe bayei kotuna yo: « Yebisa biso makambo oyo oyebisi mokonzi mpe oyo mokonzi ayebisi yo. Kobombela biso eloko te, soki te, tokoboma yo. »
26 你要回答他們說:我向君王面呈我的請求,請他不要叫我再回到約納堂的家裏去,死在那裏。」
Loba bango: « Nakomisi libondeli na ngai liboso ya mokonzi mpo ete azongisa ngai na ndako ya Jonatan te, noki te nakokufela kuna. »
27 果然,眾首長前來質問耶肋米亞,他就全依照君王吩咐的話答覆了他們。他們對他無話可說,因為那次的談話,沒有被人竊聽了去。
Bakalaka nyonso bayaki epai ya Jeremi mpe batunaki ye mituna; ye mpe ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge kaka mokonzi atindaki ye. Boye, lokola bazalaki lisusu na likambo ya koloba na ye te, pamba te moto moko te ayokaki masolo na ye na mokonzi, babendanaki na kimia.
28 這樣,耶肋米亞直到耶路撒冷淪陷的那一天,就住在拘留所的庭院裏。
Jeremi atikalaki kati na lopango ya bakengeli kino na mokolo oyo babotolaki engumba Yelusalemi.

< 耶利米書 38 >