< 耶利米書 25 >

1 猶大王約史雅的兒子約雅金執政第四年, 巴比倫王拿步高元年,有關於全猶大人民的話,傳給耶肋米亞;
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi.
2 耶肋米亞先知便將這話轉告給全猶大人民,和耶路撒冷所有的居民說:「
Mosakoli Jeremi alobaki na bato nyonso ya Yuda mpe na bavandi nyonso ya Yelusalemi:
3 自猶大王阿孟的兒子約史雅執政第十三魁,直到今日,已經二十三年,凡上主傳給我的話,我都急速告訴了你們,你們卻不聽。
« Wuta tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi kino na mokolo ya lelo, ekokisi mibu tuku mibale na misato oyo nayebisaka bino tango na tango liloba oyo Yawe azalaki koloba na ngai, kasi boyokaki ngai te.
4 上主不斷給你們派來他所有的僕人──先知們,你們總是不聽,不願傾耳諦聽。
Mpe atako Yawe azalaki kotindela bino tango na tango basakoli, basali na Ye, kasi bosalaki kaka keba te mpo na koyoka liloba na Ye.
5 他們說:你們應各自離棄自己的邪道,和自己的邪惡的行為,好能住在上主從永遠到永遠賜給了你們和你們祖先的地域裏;
Bazalaki koloba na bino: ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela.
6 不要追隨其他的神祇,事奉朝拜,以你們手做的東西來激怒我,你們就不致遭遇災禍。
Bolanda banzambe mosusu te, bosalela mpe bofukamela yango te; bopelisa kanda na Ngai te na nzela ya banzambe ya bikeko oyo maboko na bino esali, mpe Ngai nakomonisa bino pasi te.
7 你們沒有聽從我──上主的斷語──竟以你們手做的東西來激怒我,自招禍患。
Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › »
8 為此,萬軍的上主這樣說:由於你們不聽我的話,
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Lokola boyokaki maloba na Ngai te,
9 看,我必遣人召來北方的一切種族──上主的斷語──和我的僕人巴比倫王拿步高來進攻這地方,和這地方的居民,以及四周所有的民族;我要徹底消滅,任其荒涼,永遠成為笑柄和羞辱的對象。
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola; boye bakotikala seko na seko libebi.
10 此外,我還要息滅他們中歡樂喜慶的歌聲,新郎和新娘的歡笑聲,磨聲和燈光。
Nakolongola kati na bango pole ya mwinda, banzembo ya esengo mpe kosepela, makelele ya bisengo ya libala ya sika mpe ya libanga oyo banikelaka ble.
11 這地方要全變為淒涼野,這些民族要七十年服從巴比倫王。
Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo.
12 但是,一滿了七十年,我必要懲罰巴比倫王和這民族的罪惡──上主的斷語──以及加色丁人的國土,使它永遠成為荒野。
Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
13 對這國土,我要執行我論它所說,在這書上所記載先知耶肋米亞論及萬民所預言的一切話,
Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso.
14 因為強盛的民族和有力的君王,要使他們成為自己的奴隸;我必依照他的作為和他們雙手所行的事,報復他們。
Bango, bato ya Babiloni, bakokoma mpe bawumbu ya bikolo ebele mpe ya bakonzi ya nguya; nakosalela bango kolanda etamboli mpe misala ya maboko na bango. »
15 上主,以色列的天主這樣對我說:「你從我手中接過這杯忿怒酒去,讓我派你所到的各民族喝。
Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai: « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo.
16 他們必要喝,必要在我給他們派來的刀劍前,蹣跚發狂。」
Tango bakomela yango, bakolangwa mpe bakokoma kotenga-tenga liboso ya mopanga oyo nakotinda kati na bango. »
17 我便從上主手中接過杯來,給了上主派我所到的各民族喝:使她們荒蕪淒涼,
Boye, nakamataki kopo yango na loboko ya Yawe mpe namelisaki yango bikolo nyonso epai wapi atindaki ngai:
18 受人嘲笑詛咒,像今日一樣;
Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.
19 給埃及王法郎和他們的臣僕王侯並全體人民;
Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso,
20 給所有的雜族,胡茲地和培肋舍特地的眾君王;給阿市刻隆、迦薩、厄刻龍和阿市多得的遺民;
bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi;
21 給厄東、摩阿布和阿孟子民;
Edomi, Moabi, bato ya Amoni;
22 給提洛、漆冬和海外島嶼的眾君王;
bakonzi nyonso ya Tiri mpe ya Sidoni; bakonzi ya bisanga mpe ya bituka oyo ezalaka pene ya ebale monene;
23 給德丹、特瑪、步次和凡剃除鬢髮的人;
Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te;
24 給阿剌伯和在沙漠居住的雜族的眾君王;
bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe;
25 給齊默黎、厄藍和瑪待的眾君王;
bakonzi nyonso ya Zimiri, ya Elami mpe ya Medi;
26 給北方彼此相離或遠或近的眾君王,以及地面上所有的王國喝;最後喝的,是舍沙客的君王。
bakonzi nyonso ya nor, oyo bazalaka pene mpe ba-oyo bazalaka mosika, moko pene na mosusu, bakonzi ya mboka nyonso oyo ezalaka na mokili. Sima na bango nyonso, mokonzi ya Sheshaki mpe akomela yango.
27 你應對他們說:「萬軍的上主,以色列的天主這樣說:你們要喝,喝醉,嘔吐,倒在我給你們派來的刀劍前,再不起來。
« Boye loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›
28 假使他們不肯從你手中取過杯去喝,你就對他們說:萬軍的上主這樣說:你必須喝。
Soki baboyi kozwa mpe komela kopo oyo ezali na loboko na yo, okoloba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Bomela! Bomela!
29 因為,看,我開始降罰歸我名下的城市,而你們竟想全然免罰嗎﹖你們決不能免罰,因為我要給地上所有的居民招來刀劍──萬軍上主的斷語。
Pamba te, botala! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
30 你應給他們預言這一切話,對他們說:上主從高處作獅吼,從他的聖所發出他的聲音,對自己的牧場厲聲怒號,對地上所有的居民,像榨葡萄的人一樣喊叫。
Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango: ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo!
31 一陣喧嘩嘈雜,直至地極,因為上主與萬民有了爭訟,與一切有血肉的人,進行審判,將惡人交給刀劍──上主的斷語──
Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili; pamba te Yawe akosambisa bikolo, akosambisa bato nyonso, akobomisa bato mabe na mopanga, › » elobi Yawe.
32 萬軍的上主這樣說:看,各國相繼發生災禍,由地極捲來強烈的風暴。
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tala! Pasi ezali kopanzana longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu; mopepe makasi etelemi longwa na basuka ya mokili. »
33 到了那一天,從地極到地極,遍是上主戮的人,沒有人哀悼、收殮、埋葬,有如地面上的糞土。
Na tango wana, bato oyo Yawe akoboma bakozala bisika nyonso, longwa na songe moko kino na songe mosusu ya mokili. Bakosalela bango matanga te, bakosangisa bango te mpo na kokunda bango.
34 為人牧者,你們應哭泣哀號! 為羊群領導者,你們應在灰塵中輾轉! 因為們的日期已滿,你們要被宰割,像精選的公羊。
Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga! Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu! Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki! Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.
35 為人牧者,無路可逃;為羊群領導者,無法脫身。
Babateli bibwele bakozanga esika ya kokimela; bakambi ya bampate bakozanga esika ya kobombama.
36 聽啊! 為人牧者在哀號,為羊群領導者在哭泣,因為上主摧毀了他們的牧場。
Boyoka koganga ya babateli bibwele, kolela ya bakambi ya bampate, pamba te Yawe azali kobebisa bazamba epai wapi bibwele eliaka.
37 寧靜的草場,因上主的怒燄,已成一片荒涼。
Bitando ya kimia ekotikala pamba likolo ya kanda ya Yawe.
38 獅子離棄了自己的巢穴,因為他們的土地,由於刀劍的無情和上主的盛怒,已成了荒野。
Lokola nkosi etikaka ndako na yango, mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te likolo ya mopanga ya banyokoli na bango mpe likolo ya kanda ya Yawe.

< 耶利米書 25 >