< 耶利米書 12 >
1 上主,幾時我與你爭論,總是你有理;但我仍願與你討論正義:「為什麼惡人的生活總是順利,一般詭詐極惡的人總享安寧﹖
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia?
2 你栽植了他們,他們就生長根滋長,結出果實;他們的口離你近,他們的心卻離你遠。
Olonaki bango mpe bazwi misisa; bazali kokola mpe kobota mbuma. Ozali tango nyonso pene ya minoko na bango, kasi mosika ya mitema na bango.
3 至於你,上主,你是認識我的,你考察了我對你的心意;求你把他們像待宰的羔羊一樣拉出來,留待宰殺的一天。
Nzokande, oh Yawe, oyebi ngai, omonaka ngai mpe oyebi makanisi ya motema na ngai mpo na Yo. Tindika bango lokola bameme oyo babongisi mpo na koboma! Bongisa bango mpo na mokolo ya kufa.
4 [這地要哀傷,整個田野的草木要枯萎到幾時﹖由於居民的邪惡,野獸和飛鳥都被消滅。] 因為他們說:「天主不管我們的作為。」
Kino tango nini mokili ekowumela na kolela mpe matiti ya bilanga nyonso ekowumela ya kokawuka? Banyama mpe bandeke esili kokufa mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. Balobaka: « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. »
5 「你與人徒步競走,尚覺疲乏,你怎麼能與馬角逐﹖在平安的地區尚覺不安,在約旦河的叢林區,你更將何如﹖
Soki ozali kosala momekano ya kokima mbangu elongo na bato oyo bazali kotambola na makolo, mpe bango bazali komelisa yo pema, ndenge nini okoki komekana na bato oyo batambolaka likolo ya bampunda? Soki ozali komitungisa na mokili oyo ezali na kimia, ekozala boni liboso ya mpela ya ebale Yordani?
6 連你的兄弟和你的父族對你都無誠意,在你後面厲聲喊叫;即便他們對說好話,你也不要相信。」
Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.
7 「 離開了我的家,拋棄了我的產業,將我最心愛的人交在敵人的手中。
Nakobosana libota na ngai, nakosundola libula na ngai, nakokaba molingami na ngai na maboko ya banguna na ye.
8 我的產業對我竟好像是森林中的獅子,向我咆哮,為我憎恨他它。
Libula na ngai ekomi na miso na ngai lokola nkosi ya zamba: ezali kogangela ngai; yango wana nayini yango.
9 我的產業對我竟成了一隻帶斑點的鷙鳥,以致鷙鳥圍著向它襲擊。你們去田黟的一切野獸,叫它們來吞噬。
Boni, libula na ngai ekomi na miso na ngai lokola ndeke oyo eliaka misuni, bongo ebebi na makila, mpo ete bandeke mosusu oyo eliaka misuni eya kozingela mpe kobundisa yango? Bokende kosangisa banyama nyonso ya zamba mpe bobengisa yango mpo ete eya kolia nyama!
10 許多牧童毀壞了我的葡萄園,蹂躝了我的產業,使我喜愛的產業變為荒蕪的曠野。
Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, banyati-nyati elanga na ngai, babongoli elanga na ngai ya kitoko mabele ya kokawuka.
11 他們使它荒涼,荒涼得在我面前哀傷;全地荒涼,因為沒有一人關心。
Bakomisi yango esobe, etikali pamba na miso na ngai, ekomi eloko ya mawa. Mokili mobimba ebebisami, pamba te moto moko te azali lisusu komema yango na motema.
12 破壞者已來到曠野的一切高崗上,因為上主的刀劍正在砍伐,從地極到地極,凡有血肉的,都不得安寧。
Babebisi bakobimela na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba; moto moko te akozala na kimia.
13 他們播種了麥子,卻收割了荊棘;雖筋疲力竭,卻沒有利益;由於上主的憤怒,都因自己的收穫而害羞。
Bakolona ble, kasi bakobuka banzube; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.
14 上主這樣說:關於那些險惡的鄰邦.即侵犯我給予我民以色列佔有的產業的鄰邦,看,我要由他們的地上將他們拔除,也要由他們中拔除猶大家。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango.
15 在我拔除他們以後,我要再憐憫他們,引他們復歸自己的產業,各回自己的故鄉。
Kasi sima na Ngai kobengana bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa moko na moko kati na libula na ye mpe kati na mokili na ye.
16 設若他們殷勤學走我人民的道路,奉我名發誓說:「上主永在」,如同他們昔日教我人民奉巴耳發誓一樣,他們就可在我的人民中再度復興。
Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo: ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai.
17 倘若他們不聽從,我必拔除這民族,將他們拔除消滅──上主的斷語。
Kasi ekolo oyo ekoyoka te, nakobengana bango nyonso mpe nakobebisa bango, » elobi Yawe.