< 以賽亞書 6 >

1 烏齊雅王逝世那年,我看見吾主坐在崇高的御座上,他的衣邊拖曳滿殿。「
Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
2 色辣芬」侍立在他左右,各有六個翅膀:兩個蓋住臉,兩個蓋住腳,兩個用來飛翔。
Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye; moko na moko azalaki na mapapu motoba: mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.
3 他們互相高呼說:「聖!聖!聖!萬軍的上主!他的光榮充滿大地!」
Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu: « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye! »
4 由於呼喊的聲音,門限的基石也震撼了;殿宇內充滿了煙霧。
Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga.
5 我遂說:「我有禍了!我完了!因為我是個唇舌不潔的人,住在唇舌不潔的人民中間,竟親眼見了君王--萬軍的上主!」
Nalobaki: « Mawa na ngai! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga! »
6 當時有一個「色辣芬」飛到我面前,手中拿著鉗子,從祭壇上取了一塊火炭,
Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai;
7 接觸我的口說:「你看,這炭接觸了你的口唇,你的邪惡已經消除,你的罪孽已獲赦免!」
atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki: « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »
8 那時我聽見吾主的聲音說:「我將派遣誰呢﹖誰肯為我們去呢﹖」我回答說:「我在這裏,請派遣我 !」
Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba: — Nakotinda nani? Nani akokende mpo na biso? Nazongisaki: — Ngai oyo, tinda ngai!
9 他說:「你去對這民族說:你們聽是聽,但不明白;看是看,卻不理解。
Yawe alobaki na ngai: — Kende koloba na bato oyo: « Boyoka na bino, kasi bokososola te; botala na bino, kasi bokomona te!
10 你要使這民族的心遲鈍,使他們的耳朵沉重,使他們的眼睛迷矇,免得他們的眼睛看見,耳朵聽見,心裏覺悟而悔改,獲得痊癒。」
Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te! »
11 我追問說:「吾主!要到幾時呢﹖」他回答說:「直到城邑變成廢墟,沒有居民,房屋無人居住,田地變為荒蕪。」
Boye nalobaki: — Oh Nkolo, kino tango nini? Azongisaki: — Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango;
12 上主必將人民遷到遠方,本地區荒蕪異常。
kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.
13 境內雖只留下十分之一,還要遭受摧殘;就如松樹和樟樹在伐倒後,尚留有餘幹,聖善的苗裔將由這餘幹產生。
Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.

< 以賽亞書 6 >