< 以賽亞書 58 >

1 你大聲呼喊,不要停止,提高你的喉嚨,有如號筒,向我的百姓宣佈他們的過犯,向雅各伯家指明他們的罪孽。
« Ganga na mongongo makasi, kotika te! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
2 他們固然天天尋找我,喜歡認識我的道路,好似一個行義而沒有背棄天主法令的民族,向我要求正義的措施,祈望天主與之接近:「
Pamba te mokolo na mokolo, balukaka Ngai, basalaka lokola bato bazali na esengo ya koyeba nzela na Ngai, lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango; basengaka Ngai mikano ya sembo, mpe basalaka lokola bato bazali na esengo ya kozala pene ya Nzambe;
3 為什麼我們守齋而你看不見,我們克苦而你不理會呢﹖」看哪!你們在守齋日仍然苦心經營,勒索你們所有的工人。
balobaka: ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.
4 看哪!你們一面守齋,一面爭吵,打架,以惡拳打人;你們不必再如今天一樣守齋了,免得你們的嘈雜在高處可以聽到。
Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba, bozali kobetana makofi na kanda nyonso; bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala na mokolo oyo bozali kozela ete mongongo na bino eyokana na likolo.
5 難道這就是我所中意的齊戒嗎﹖難道這就是人們克己的日子嗎﹖難道低頭如同蘆葦,以苦衣和灰塵舖床,你就稱為齋戒,稱為上主悅納的日子嗎﹖
Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka?
6 我所中意的齊戒,豈不是要人解除不義的鎖鏈,廢除軛上的繩索,使受壓迫者獲得自由,折斷所有的軛嗎﹖
Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka: kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.
7 豈不是要人將食糧分給飢餓的人,將無地容身的貧窮人領到自己的屋裏,見到赤身露體的人給他衣穿,不要避開你的骨肉嗎﹖
Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo?
8 若這樣,你的光明將要射出,有如黎明,你的傷口將會迅速地復原;你的救援要走在你前面,上主的光 榮要作你的後盾。
Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.
9 那時,你如呼喊,上主必要俯允;你若哀求,他必答說:「我在這裏!」你若由你中間消除欺壓、指手畫腳的行為和虛偽的言談,
Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo; tango okosenga lisungi, akoloba: ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe;
10 你若把你的食糧施捨給飢餓的人,滿足貧窮者的心靈;那麼,你的光明要在黑暗中升起,你的幽暗將如中午。
soki opesi bilei na yo epai na ye oyo azali na nzala mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, pole na yo ekongenga kati na molili, mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.
11 上主必要時常引領你,在乾枯之地,使你心滿意足,並使你的骨頭堅強有力;你將成為一座灌溉的樂園,一個總不涸竭的水泉。
Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.
12 你的後裔將重建往日的廢址,你要豎起那久遠的基礎,人要稱你為:「缺口的修補者,」「廢墟的興建者,」為叫人居住。
Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala; bakobenga yo: ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›
13 假使你在安息日限止你的腳步,在我的聖日停止你的營業,稱安息日為喜樂,為上主可敬的聖日;假使你尊崇聖日,而不去旅行,不苦心經營或談論生意,
Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
14 那時你將喜樂於上主。我要使你駕臨地之高處,使你享受你祖先雅各伯的產業:這是上主親口說的。
wana okozwa esengo na yo kati na Yawe mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili, nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, » elobi Yawe.

< 以賽亞書 58 >