< 以賽亞書 57 >

1 義人死去,沒有人放在心上;虔誠的人被收去,沒有人予以注意:義人被接去,是為了脫離災難,
Moto ya sembo azali kokufa, kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi; bato ya malamu bazali kosila, mpe ata moto moko te azali kososola ete bato ya sembo bazali kolongolama mpo ete bazala mosika na mabe.
2 而進入安息;躬行正直的人,將安眠於自己的處所。
Bato oyo batambolaka na bosembo bakokota na kimia, bakozwa bopemi na bambeto na bango.
3 巫女的兒子,姦婦淫女的後裔,你們近前來!
« Kasi bino, boya awa, bino bana ya mwasi ya soloka, bino bana oyo bobotami na nzela ya ekobo mpe ya kindumba.
4 你們戲謔誰呢﹖你們向誰張口吐舌呢﹖不是你們這些反叛的兒子,不忠的後裔,
Bozali koseka nani? Bozali kofungolela nani monoko? Bozali kotiela nani penza monoko? Boni, bozali bana ya batomboki te, bozali libota ya lokuta te?
5 在橡樹林中,在一切綠樹下慾火中燒;在山谷中,在磐石的夾縫裏祭殺嬰兒嗎﹖
Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.
6 山谷中的光石竟是你的家產,它們竟成了你的產業;並且你還給它們奠了酒,獻了供物,對這些事我豈能容忍﹖
Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa; solo, yango nde ezali libula na yo. Solo penza, ezali epai na yango nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino mpe kobonza makabo ya bambuma. Boni, nasepela solo na makambo ya boye?
7 在巍峨高聳的山上,你安置了你的床榻,並且上那裏去奉獻犧牲。
Otiaki mbeto na yo na likolo, na songe ya ngomba; kuna nde ozalaki komata mpo na kobonza mbeka.
8 你在門和門框後安置了你的記號,瞞著我裸體上了床,舖開了你的床榻,你喜歡與誰同寢,便與他茍合,且看了他的手。
Otiaki nzambe na yo ya ekeko na sima ya ekuke na yo mpe ya mabaya oyo esimbaka ekuke yango. Osundoli ngai, olongoli bilamba na yo, omati likolo ya mbeto na yo; osali boyokani elongo na bato oyo olingaka kosangisa na bango nzoto mpe oluki komona bolumbu na bango.
9 你擦滿了香膏,加多了香料,往摩肋客那裏去,又遣發使者到遠方去,你甚至深入了陰間。 (Sheol h7585)
Okendeki epai ya Moloki na mafuta ya olive mpe obakisaki lisusu malasi na yo. Otindaki bantoma na yo mosika, omikitisaki na se penza kino na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
10 你因路途遙遠,已感疲倦,但總不說:「絕望了!」因為你找著了你新生的力量,所以你不覺困乏。
Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, kasi omilobelaki te: ‹ Ezali na tina te! › Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, yango wana olembaki te.
11 你害怕誰,畏懼誰,竟使你失去忠信,而不懷念我,不關心我﹖難道因為我久不作聲,你就不怕我了嗎﹖
Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te?
12 我要披露你的義舉,以及與你毫無裨益的行為。
Nakobimisa bosembo mpe misala na yo na pwasa, mpe ekozala na litomba ata moko te mpo na yo.
13 當你呼求時,讓你那一夥救你罷!但是一陣風要把它們全部捲走,一口氣要把他們吹去。唯有那依賴我的,將承受地業,繼承我的聖山。
Tika ete mopiku ya banzambe na yo ya bikeko ebikisa yo tango okoluka lisungi! Mopepe makasi ekomema yango nyonso, mopepe moko ekopikola yango. Kasi moto oyo akomisaka Ngai ebombamelo na ye akozwa lokola libula mokili mpe ngomba na Ngai ya bule. »
14 有個聲音說:「修路,修路!把路修平,把我民族道路上的障礙除去!」
Bakoloba: « Botondisa mabele, botondisa mabele, bobongisa nzela, bolongola mabaku na nzela ya bato na Ngai! »
15 因為至高者,卓越者,居於永遠者,名為聖者的這樣說:「我雖居於高處及聖所,但我也與懺悔和心靈謙卑的人在一起,為振奮謙卑者的心情,甦醒懺悔者的心靈。
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
16 我不願永遠爭辯,也不願永久發怒,因為生氣是由我而出,靈魂是由我而造。
Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.
17 因了她的罪惡我一時發怒,打擊了她,在怒氣中掩住我的面;可是她仍背叛,走她隨心所欲的道路。
Natombokaki likolo ya posa na ye ya kozwa bomengo na nzela ya moyibi; napesaki ye etumbu, nabombaki elongi na Ngai na kanda, kasi apengwaki kaka mpo na kolanda posa mabe ya motema na ye.
18 我看見了她的行為,我要醫治她,我要引她回來,將安慰賜給她和她的憂傷者。
Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.
19 在他們的口唇上安放讚頌之辭:「平安,平安歸於遠近的人 !」上主說。【我要醫好她。】
Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
20 但惡人將如翻騰的大海,不能平息,它的海浪捲起黃土與淤泥。
Kasi bato mabe bazali lokola ebale oyo etomboki, oyo evandaka kimia te: mayi na yango ebwakaka potopoto mpe bosoto libanda.
21 我的天主說:惡人決無平安!
Nzambe na ngai alobi: « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »

< 以賽亞書 57 >