< 以賽亞書 54 >

1 不生育的石女,歡樂罷!未經產痛的女子!歡呼高唱罷!因為被棄者的子女比有夫者的子女還多:這是上主說的。
Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.
2 拓展你帳幕的空位,伸展你住所的帷幔,不必顧忌!拉長你的繩索,堅固你的木橛!
Yeisa ndako na yo ya kapo monene, bakisa bakapo na ndako yango mpo ete eya monene; kokanga motema te! Benda na molayi basinga na yo mpe pika banzete na yo makasi!
3 因為你要向左右拓展,你的後裔將以外邦之地為業,住滿廢棄了的城邑!
Pamba te okofungwama na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi; bakitani na yo bakokonza bikolo mosusu mpe bakosala ete bato bavanda lisusu na bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te.
4 不要害怕!因為你再不會蒙羞;不要羞慚!因為你再不會受辱;其實,你要忘記你幼年時所受的恥辱,再不懷念居寡時所受的侮慢,
Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali;
5 因為你的夫君是你的造主,他的名字是「萬軍的上主;」你的救主是以色列的聖者,他將稱為「全世界的天主。」
pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye: Yawe, Mokonzi ya mampinga; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo; babengaka Ye: Nzambe ya mokili mobimba.
6 是的,上主召見你時,你是一個被棄而心靈憂傷的婦女;人豈能遺棄他青年時的妻子﹖你的天主說。
Pamba te Yawe abengi yo lisusu lokola mwasi oyo basundola, bongo azali na pasi na motema. Ndenge nini bakoki solo kosundola mwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo?
7 其實,我離棄了你,只是一會兒,但是我要用絕大的仁慈召你回來。
Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke; kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo.
8 在我的盛怒中,我曾一會兒掩面不看你,可是我要以永遠的慈悲憐憫你,你的救主上主說。
Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo.
9 這事對我有如諾厄的時日一般:就如那時我曾發誓說:諾厄的大水不再淹沒世界;同樣,我如今起誓:再不向你發怒,再不責斥你。
Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
10 高山可移動,丘陵能挪去,但我對你的仁慈決不移去,我的和平盟約總不動搖:憐憫你的上主說。
Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
11 你這遭磨難,受顛沛,無安慰的城啊!看,我要用孔雀石安置你的基石,以碧玉奠定你的根基;
Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri,
12 我要以紅瑪瑙修你的城垛,以水晶石築你的門戶,以各種寶石建你的圍牆。
nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi, nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli, mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo.
13 你所有的兒子,都是上主所訓誨的;你的兒子們,要享受絕大的幸福。
Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
14 你將建築在正義的根基上;欺壓已遠去,你無需再有所恐懼;驚嚇也遠去了,它再不會臨近你。
Okolendisama kati na bosembo: minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.
15 請看!如果有人攻擊你,那不是出於我;凡攻打你的,必在你前跌倒。
Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te; moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo.
16 請看!是我造了吹煤火的鐵匠,由於他工作中造出了各種武器,可是也是我造了毀滅者來加以破壞。
Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa.
17 所製造的各種武器,為攻打你,一概無用;在訴訟中,凡起來與你爭辯的舌頭,都要被你駁倒。這是上主的僕人應得之分,是他們由我所得的報酬──上主的斷語。
Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.

< 以賽亞書 54 >

A Dove is Sent Forth from the Ark
A Dove is Sent Forth from the Ark