< 以賽亞書 4 >

1 那一日,七個女人要抓住一個男人說:「我們吃自己的食糧,穿自己的衣服,只要你容許我們歸於你名下,除去我們的恥辱。」
Na mokolo wana, basi sambo bakokangama na mobali moko mpe bakoloba: « Tokomileisa biso moko mpe tokomilatisa biso moko; yo, ndima kaka ete tobengama na kombo na yo! Longola soni na biso! »
2 那一日,由上主所發出的苗芽,必成為以色列遺民的光輝與榮耀;地上的果實必成為他們的誇耀與光彩。
Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.
3 凡留在熙雍的,遺在耶路撒冷的,即凡錄在耶路撒冷的生命冊上的,都必將稱為聖者。
Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu: bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi.
4 當吾主以懲治的神和毀滅的神,洗淨熙雍女子的污穢,滌除耶路撒冷中間的血漬時,
Yawe akolongola botutu ya basi ya Siona, akopetola Yelusalemi oyo ekomaki mbindo na bilembo ya makila, na nzela ya molimo ya kosambisa mpe ya moto.
5 上主將顯現在熙雍山整個地盤與其集會之上:白日藉著雲煙,黑夜藉光亮的火燄;因為在一切之上,有上主的榮耀,有如天蓋和帳棚,
Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna: lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango.
6 白日作蔭影以免炎暑,又可作庇護,以避狂風暴雨。
Ekozala lokola ndako ya matiti oyo epesaka pio na tango ya molunge ya moyi makasi, ekimelo mpe ebombamelo na tango ya mopepe makasi mpe na tango ya mvula.

< 以賽亞書 4 >