< 以賽亞書 34 >

1 萬民,你們前來聆聽!列邦,你們側耳靜聽!大地與充塞其中的一切,世界與其所有的產物,都要諦聽!
Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka; bino bato, botia matoyi! Tika ete mabele, elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka!
2 因為上主向萬民生了氣,對他們的一切軍隊發了怒,他注定了他們的劫數,命定了他們遭受屠殺。
Yawe atombokeli bikolo nyonso, kanda na Ye ezali likolo ya mampinga ya bikolo nyonso. Akobebisa bango penza nye, akokaba bango na kufa.
3 他們的被殺者被棄於外,他們屍體的腥臭浮浮上騰,他們的血溶化了諸山。
Bakobwaka bibembe na bango na mabele, bongo bibembe yango ekobimisa solo makasi, mpe makila ekokita lokola ebale na bangomba.
4 天上的萬象必將解體,諸天要如卷軸般捲起;天上的星辰必將隕墜,有如葡萄葉的凋零,有如無花果葉的萎謝。
Mampinga nyonso ya likolo ekobukana; mpe mapata ekolingama lokola buku, bongo mampinga na yango nyonso ekokweya ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka.
5 當上主的刀在天上痛飲之後,看哪!它將若在厄東,落在他所毀滅的百姓身上,實行懲罰。
Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.
6 上主的刀劍染滿了血,漬滿了脂油,就是羔羊和羚羊的血,以及公羊腎臟的脂油:因為上主在波責辣舉行了一番祭祀,在厄東地方施行了一場屠殺。
Mopanga na Yawe etondi na makila, ezipami na mafuta, na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, na mafuta ya bameme ya mibali, pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.
7 野牛與肥畜必同墮死,牛犢與公牛必同跌斃。他們的地區浸滿了血,他們的地面漬染了脂油。
Mpakasa ekokufa nzela moko na bango, mpe bangombe ya mibali elongo na bilenge na yango. Mabele na yango ekolangwa na makila mpe putulu na yango ekozipama na mafuta.
8 因為這是上主復讎的日子,是為報復熙雍敵人的一年。
Pamba te ezali mpo na Yawe, mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mobu ya lifuti mpo na likambo ya Siona.
9 她的河水將變為瀝青,她的土壤將變為硫磺:大地成了燃灼的瀝青,
Miluka ya Edomi ekobongwana gudron, putulu na yango, lokola moto ya fofolo mpe mabele na yango ekokoma kopela moto;
10 晝夜燃燒不息,濃煙永遠上升;世世代代成為荒野,永久無人經過此地。
moto oyo ekokufa te ezala na moyi to na butu, bongo molinga na yango ekobanda komata mpo na libela. Ekotikala esobe libela na libela, mpe ata moto moko te akoleka lisusu wana.
11 鵜鶘和刺蝟據守其地,鴞鴟和烏鴉棲於其間;上主將以破壞性的繩墨和毀滅性的線錘測量那地。
Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu ekozwa yango lokola libula, kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna. Nzambe akosembola likolo ya Edomi singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga.
12 顯貴中沒有一個在那裏能夠建國,她所有的王侯都歸於烏有。
Bankumu na yango bakozala lisusu wana te mpo na kopona mokonzi, bakambi na yango nyonso bakotikala lisusu te.
13 她的宮闕將生滿荊棘,她的保壘將繁生蒺藜和薊草;她將成為豺狼的洞穴,鴕鳥的苑囿。
Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi; basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi; ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, lopango ya maligbanga.
14 野貓在那裏將與野狗相會,野羊將呼叫牠的同類;夜間的魑魅將在那裏休憩,尋得一個安息的處所。
Bikelamu ya esobe ekokutana kuna elongo na mbwa ya zamba, mpe bantaba ya mibali ekobenga baninga na yango. Kumu ekozwa kuna esika ya kolala mpe ya kopema.
15 箭頭蛇將在那裏築穴、下蛋、伏卵,並加以孵化;鷙鳥群集其間,雌雄相配。
Nyoka ekotonga zala na yango mpe ekobwaka maki na yango kuna, ekopasola yango mpe ekosangisa bana na yango na se ya elili na yango. Kaka kuna lisusu, ndeke oyo eliaka misuni ekosangana moko na mosusu.
16 你們可查看上主的書,且閱讀一下,牠們中一種也不會缺少,沒有一個沒有配偶的,因為上主的口已這樣命定,他的神集合了牠們。
Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga: Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moninga na ye; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.
17 上主親自要為牠們抽籤,他親手用繩索將為牠們分開這地;牠們將永久佔有這地,世世代代住在那裏。
Ye abwaki zeke mpo na bango mpe loboko na Ye esaleli singa oyo bamekelaka molayi, mpo na kokabolela bango mboka. Bakozwa yango mpo na libela mpe bakovanda wana libela na libela.

< 以賽亞書 34 >