< 以賽亞書 27 >

1 到那一天,上主要用他那厲害、巨大、猛烈的劍,來懲罰「里外雅堂」飛龍,和「里外雅堂」蜿蛇;並要擊殺海中的蛟龍。
Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya; akoboma elima ya ebale monene.
2 到那一天,你們要唱「那可愛的葡萄園」歌:「
Na mokolo wana, bakoloba: « Boyemba nzembo mpo na nzete ya vino ya kitoko:
3 我,上主,親自作它的護守者,時加灌溉;我要日夜護守,免得受人侵害。
Ngai Yawe, nabatelaka yango, nasopelaka yango mayi tango nyonso, nakengelaka yango butu mpe moyi mpo ete moto moko te abebisa yango.
4 我再沒有怒氣;萬一有了荊棘和蒺藜,我必前去攻擊,將它完全焚毀;
Nazali lisusu na kanda te. Ah, soki ezalaki kaka na banzube mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, nde natambolaki likolo na yango na bitumba mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
5 除非不求我保護,不與我講和,不與我和好...」
Kasi tika ete bakimela epai na Ngai lokola ndako batonga makasi, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai; solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai! »
6 來自雅各伯將生根,以色列要發芽開花,她的果實要佈滿地面。
Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa, Isalaele akobimisa bafololo mpe mito, mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.
7 上主打擊以色列,那裏像他打擊那些打擊以色列的人呢﹖上主擊殺以色列,那裏像他擊殺那些擊殺以色列的人呢﹖
Boni, Yawe abetaki ye te ndenge abetaki bato oyo babetaki ye? Boni, abomaki ye te ndenge abomaki bato oyo babomaki ye?
8 上主以離棄,以驅逐,懲罰了她;在吹東風的日子,藉巨風將她捲去。
Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.
9 惟其如此,雅各伯的罪過方得消除;她的罪孽得以赦免的代價,即在於她將祭壇所有的石塊,打得粉碎有如石灰,不在樹立「阿舍辣」和太陽柱。
Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye: akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.
10 的確,設防的城市已荒涼,成了被撇下和放棄的住宅,有如荒野。牛犢在那裏牧放,在那裏偃臥,吃盡了那裏的枝葉。
Engumba ya makasi etikali pamba lokola lopango oyo basundola, babosana mpe etikala pamba lokola esobe; mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna, bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango.
11 幾時樹枝枯萎,就自會斷落,婦女便來拿去燒火;她既不是個聰敏的民族,因此那創造她的,對她沒有憐憫;那形成她的,對她也不表恩情。
Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
12 到那一天,上主要從大河流域到埃及河畔收割果實,以色列子民啊!你們都要一個一個地被聚集起來。
Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino.
13 到那一天,要吹起大號筒,凡是在亞述失迷的,在埃及地分散的,都要前來,在耶路撒冷聖山,朝拜上主。
Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.

< 以賽亞書 27 >