< 以賽亞書 24 >

1 看!上主使大地空虛,使它變為荒涼,翻轉它的面目,使它的居民四散:
Tala, Yawe akobebisa mokili mpe akokomisa yango lokola esobe; akokotisa mobulu kati na yango mpe akopanza bato na yango.
2 那時怎樣對百姓,也怎樣對司祭;怎樣對僕人,也怎樣對主人;怎樣對婢女,也怎樣對主母;怎樣對主顧,也怎樣對商賈;怎樣對債戶,也怎樣對債主;怎樣對貸方,也怎樣對借方。
Ekozala mpe kaka ndenge moko mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, mpo na moteki mpe mosombi, mpo na modefisi mpe modefi, mpo na moto oyo bakofuta ye niongo mpe mpo na moto oyo akofuta niongo.
3 大地必要完全荒廢,慘遭浩劫,因為上主這樣定了。
Mokili ekobebisama penza nye mpe bakopanza yango nyonso. Yawe nde alobaki yango.
4 大地痛哭哀傷,世界衰頹零落,上天與下地一同衰頹。
Mokili ezali na matanga mpe ekawuki, mokili mobimba ebebi mpe ekawuki; ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili!
5 大地在居民腳下已被玷污,因為他們越規犯法,破壞了永久的盟約。
Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.
6 為此詛咒吞噬了大地,其中的居民受了罪罰;為此地上的居民受了折損,剩下來的人數極少。
Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali.
7 新酒哀傷,葡萄凋殘;心情愉快的,都長聲嘆息!
Vino ya sika ezali na matanga, elanga ya vino ekawuki; bato nyonso oyo bamesana na esengo bakomi kolela na pasi.
8 小鼓的喜樂已停止,歡笑的喧嚷已終結,琴瑟的喜樂已止息。
Esengo ya mbonda esili, makelele ya bato ya biyenga esili, esengo ya lindanda esili;
9 人不再飲酒作樂,喝了濃酒的反覺酸苦!
komela vino etikali lisusu na banzembo te, masanga ya makasi ekomi bololo mpo na bato oyo bamelaka yango.
10 空虛的城市已破殘,家家戶戶都已關門閉戶!
Engumba oyo ebeba etikali pamba, bikuke ya bandako nyonso ekangami.
11 廣場上有人為酒而嗟歎,萬般娛樂已闌盡,大地的喜樂遭放逐!
Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te, kosepela nyonso ebongwani molili, esengo nyonso elongwe na mokili.
12 城中所留的只是淒涼,門戶被打得粉碎!
Libebi kaka nde etikali kati na engumba, babuki-buki bikuke na yango na biteni.
13 誠然,大地間萬民中,必像打過的橄欖樹,或如收割葡萄後所餘的殘粒。
Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete to tango balokotaka bambuma ya vino soki basilisi kobuka yango.
14 他們要提高聲音歌頌上主的尊嚴:「萬民啊! 你們歡呼罷!
Bamoko bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na esengo; wuta na weste ya mayi monene, bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe.
15 你們在東方的,應頌揚上主!住在海島上的,應頌揚上主,以色列的天主的名!
Yango wana, kuna na ngambo ya este, bopesa nkembo na Yawe; bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, kati na bisanga ya ebale monene.
16 我們從地極聽到了歌聲:光榮屬於正義者。」然而我說:「我有禍了!我有禍了!我好可憐!反叛的仍在反叛,反叛的仍在極力的反叛!」
Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo: « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki: « Nakomi na suka, nakomi na suka! Mawa mpo na ngai! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka! »
17 地上的居民啊!恐怖、陷阱、羅網,都聚集在你身上。
Oh bato ya mokili, somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino.
18 那逃得了恐怖聲音的,必要落在陷阱裏;那由陷阱中跳出來的,必要落在羅網中! 的確,天上閘門已開放,大地基礎已動盪。
Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana.
19 大地必將粉碎又粉碎,大地必將崩裂又崩裂,大地必將動搖又動搖!
Mokili ebukani-bukani, mokili epanzani, mokili eningani makasi.
20 大地必東搖西晃,有如一個醉漢,搖盪得好比一座帳幕;自己的罪惡又重壓在上面,倒塌了不能再起!
Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.
21 到那一天,上主要在高天審視天上所有的軍旅,要在下地察考地上所有的君王。
Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na mampinga ya lola kuna na likolo, mpe na bakonzi ya mokili na se.
22 他們將被聚集起來,關在深坑內,監禁在監牢裏;待過了許多時日,將受懲罰。
Bakosangisa bango elongo kati na libulu ndenge basangisaka bakangami na boloko, bakokangela bango na boloko mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele.
23 那時,月亮要臉紅,太陽要羞慚,因為萬軍的上主要 在熙雍山上,要在耶路撒冷為王,在他的長老面前要備受頌揚。
Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.

< 以賽亞書 24 >