< 何西阿書 9 >

1 以色列! 你不要高興,不要像異民一樣狂歡,因為你行了淫,離棄了你的天主,在所有的禾場上只是喜歡淫資。
Isalaele, kosepela te; kozala na esengo te lokola bikolo mosusu; pamba te otikaki Nzambe na yo mpe okendeki kosala kindumba; osepelaki na lifuti ya kindumba na bitando nyonso oyo batutelaka ble.
2 禾場與榨酒也不再認識他們,新酒也要拒絕他們。
Etando oyo batutelaka ble mpe ekamolelo masanga ya vino ekopesa bango bilei te, mpe bakozanga vino ya sika.
3 他們必不能在上主的地方居住;厄弗辣因必要回到埃及,且要在亞述吃不潔之物。
Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe; Efrayimi akozonga na Ejipito, mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.
4 他們不能向上主奠洒,也不能再向衪奉獻的祭品;他們的餅好似喪餅,凡吃這餅的,必受玷污;因為他們的餅只可為他們自用,不能帶進上主殿內。
Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te, mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te. Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga: bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo; pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango, kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.
5 那麼你們在盛會之日,在上主火節日,可作什麼呢﹖
Boye, bokosala nini na mikolo ya bafeti oyo ekatama, na mikolo ya bafeti ya Yawe?
6 因為,看,他們由毀滅裏逃走,埃及要收集他們,摩夫要埋葬他們;他們的尊貴的銀器將為蒺藜所承受,他們的帳幕將被荊棘所佔有。
Ata soki bakimi, bakobebisama; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
7 懲罰的日子來了,報復的日子到了,以色列要喊說:先知是愚人,受靈感的人是瘋子! 是,這是因為你的過犯繁多,因為你的罪惡重大。
Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.
8 厄弗辣因窺伺先知的帳幕,在他的路上處處佈下了羅網,在自己天主的殿內只敵視。
Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.
9 他們窮凶已到了極點,就如在基貝亞的時日一樣;上主必不忘你們的罪孽,必要懲罰他們的邪惡。
Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.
10 我發現了以色列,就如曠野中發現葡萄;看見你們的祖先,就如在無花果樹上看見初熱的果實;但當他們來到了巴耳培敖爾時,便將自己獻給了可憎之物,使自己也成了可憎惡的,如他們所善愛的邪神一樣。
Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
11 至於厄弗辣因,因他們的光榮,就如飛鳥飛去,必不生產,不懷胎,不妊娠。
Nkembo ya Efrayimi ekokima lokola ndeke, wuta na mbotama, wuta na zemi, wuta na ebandeli ya zemi.
12 既使他們把自己的子女養大,我也必使他們喪亡,一個不留;幾時我捨棄他們,他們才是有禍的。
Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo!
13 厄弗辣因,一如我所見的,必使自己的子女成為獵物;厄弗辣因必把自己的子女交出屠殺。
Nazali komona Efrayimi lokola engumba Tiri oyo etongama na likolo ya mabele ya kitoko; nzokande, Efrayimi akokaba bana na ye na mobomi.
14 上主,求你賜給他們....賜給他們什麼呢﹖要使他們胎荒,乳乾!
Oh Yawe, pesa bango… Okopesa bango nini? Pesa bango mabumu oyo esopaka bazemi, mpe mabele oyo ekawuka.
15 他們所行的一切惡事,全在基耳加耳開始,因此,在那裏我就恨了他們;為了他們的惡行,我必將他們從我父的家趕出去;我不再喜愛他們,他們的首領全是叛徒
Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.
16 厄弗辣因受了打擊,根子也乾枯了,再不能結果實;既使他們生了孩子,我也必將他們的寧馨兒殺死。
Efrayimi alembi, misisa na ye ekawuki; akobota lisusu bambuma te; ata soki baboti bana, nakoboma bana na bango oyo balingaka mingi.
17 我的天主必要拋棄他們,因為他們沒有聽從衪;他們必要在各民族中飄流。
Nzambe na ngai akobwaka bango, pamba te batosaki Ye te, mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.

< 何西阿書 9 >