< 何西阿書 7 >

1 當我著手醫治以色列時,厄弗辣因的罪孽就顯露出來,撒馬利亞的惡也顯露出來,因為他們行了詭詐的事:竊賊潛入內室,而外遇強盜;
Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.
2 但他們並不存心細想:我記住他們的一切惡行。現今他們的行為圍繞著他們,一一擺在我眼前。
Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
3 他們使君王喜歡,是出於惡意,使首領快樂,是出於詭詐。
Basepelisaka mokonzi na nzela ya misala na bango ya mabe; basepelisaka mpe bakambi na nzela ya lokuta na bango.
4 個個燃起了怒火,像一座火爐,伙夫暫停煽火,直到和好的麵團發酵。
Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.
5 在他們君王的慶日上,當官長們酒勁發作,不能支持的時候,君王便和惡徒勾結起來。
Na mokolo ya feti ya mokonzi na biso, bakambi balangwaka masanga mpe mokonzi asanganaka na batioli.
6 他們的心雖因陰謀而焦慮得像火爐一樣,但他們的怒火卻整夜停息;一到早晨,卻又如烈火復燃。
Wana mitema na bango epelaka lokola moto ya fulu, bapusanaka pene na ye na mayele mabe. Butu mobimba, balalaka na kanda; mpe na tongo, kanda yango ekomaka kopela lokola moto.
7 個個像火爐一樣,熾燃起來,吞噬了他們的官長;他們的君王都倒斃了,但沒有一個向我呼求。
Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu, batumbaka bakambi na bango; mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka, moko te kati na bango abelelaka Ngai.
8 厄弗辣因想混雜在列邦之中,厄弗辣因成了一塊尚未翻過的烤餅。
Efrayimi asangani na bikolo mosusu, akomi lokola galeti oyo ebela malamu te.
9 外邦人耗盡了她的力量,她尚不自覺,頭上已佈滿了白髮,她還不知曉。
Bapaya bazali kosilisa ye makasi, kasi ye azali kososola yango te. Azali kokoma mobange, kasi azali kososola yango te.
10 [雖然如此,以色列的驕傲仍呈現在自己面上,他們仍不歸依,仍不尋求上主,他們的天主]。
Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba: azongeli te Yawe, Nzambe na ye; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te!
11 厄弗辣因像愚蠢無知的鴿子,一時求救埃及,一時又投奔亞述;
Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele: azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.
12 可是不論他們往何處去,我要向他們撒開我的羅網,使他們像天上的飛鳥跌下:一聽到他們聚齊待飛,我便將他們捕捉。
Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.
13 他們有禍了! 因為他們遠離離了我;他們必遭受毀滅,因為他們背叛了我。我原想拯救他們,但他們卻對我撒謊,
Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo!
14 並沒有真心呼求我,只是在祭壇旁悲歎;為了五榖和新酒,仍自割己身,仍背叛我。
Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
15 我雖然加強了他們的手臂,然而他們仍圖謀邪惡反抗我。
Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.
16 他們歸向了虛無,變成了歪曲的弓;他們的首領因自己的狂言,必喪身刀下,且在埃及地為人恥笑。
Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.

< 何西阿書 7 >