< 何西阿書 11 >

1 當以色列尚在童年時,我就愛了他;從在埃及時,我就召他為我的兒子。
Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.
2 可是我越呼喚他們,他們越遠離我,去給巴耳獻祭,向偶像進香。
Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye, tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai. Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.
3 是我教了厄弗辣因邁步,雙臂抱了他們,但他們卻不理會是我照顧了他們。
Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi ndenge ya kotambola; namemaki bango na maboko na Ngai, kasi basosolaki te ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.
4 是我用仁慈的繩索,用愛情的帶子牽著他們,對他們有如高舉嬰兒到自己面頰的慈親,俯身喂養他們。
Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo; nalongolaki bango ekangiseli na bakingo mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.
5 他們卻要返回埃及埃及,要亞述作他們的君王,因為他們拒絕歸依我。
Lokola baboyi kozonga epai na Ngai, bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te, kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.
6 刀劍必要在他們的城中橫行,殺絕他們的子女,在他們的堡壘中吞噬他們。
Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.
7 我的百姓因著自己的叛逆使我厭煩了;為此上主給他們指定了應負的重軛,因為衪已不再憐惜他們。
Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.
8 厄弗辣因! 我怎能捨棄你﹖以色列! 我怎能拋掉你。我怎能仗你如同阿德瑪,待你如同責波殷﹖我的心已轉變,我的五內已感動;
Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.
9 我不再按卜憤怒行事,不再毀滅厄弗辣因,因為我是天主而不是人,是在你們中間的聖言,而不是伏於城門的仇敵。
Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino; nakoya lisusu na kanda te.
10 的確,他們必要追隨上主,衪要像獅子吼叫;衪一吼叫,衪的子女便要從西方急速歸來,猶如飛鳥由埃及急速飛來,
Bakolanda Yawe! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.
11 猶如鴿子從亞述飛來;我要使他們安居在他們家中──上主的斷語。
Bakoya na kolenga lokola bandeke wuta na Ejipito, lokola bibenga wuta na Asiri. Nakovandisa bango na bandako na bango, elobi Yawe.
12 厄弗辣因用,以色列家以詭詐欺騙了我;猶大對天主也是不忠實的證人,他只知忠於迷惑他的人。
Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.

< 何西阿書 11 >