< 何西阿書 1 >

1 [前編:歐瑟亞結婚的意義]一:烏齊雅、約堂、[阿哈次和希則克亞]為猶大王,約阿士的兒子雅洛貝罕為以色列王時,上主有話傳給貝厄黎的兒子歐瑟亞。
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele:
2 上主開始藉歐瑟亞發言時,上主對歐瑟亞說:「你去娶一個娼婦為妻,讓她生淫亂的子女,因為此地淫亂放蕩,背離了上主。」
Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye: — Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.
3 歐瑟亞便去娶了狄布拉因的女兒默爾為妻;她懷孕,給他生了一個兒子。
Boye, Oze akendeki kolinga Gomeri, mwana mwasi ya Dibilayimi. Gomeri akomaki na zemi mpe abotelaki ye mwana mobali.
4 上主對歐瑟亞說:「你要給他起名叫依次勒耳,因為過不久,我要向耶胡家追討依次勒耳的血債,要消滅以色列家的王室。
Yawe alobaki na ye: — Pesa ye kombo Jizireyeli, pamba te etikali moke napesa libota ya Jewu etumbu mpo na makila ya bato oyo asopaki na Jizireyeli, mpe nakosukisa bokonzi, na libota ya Isalaele.
5 到那一天,我必要在依次勒耳山谷折斷以色列的弓。」
Na mokolo wana, nakobuka tolotolo ya Isalaele kati na lubwaku ya Jizireyeli.
6 哥默爾再懷孕,生了一個女兒,上主對歐瑟亞說:「你要給她起名叫羅魯阿瑪 (不受愛憐者,) 因為我不再愛憐以色列家,以致我不再寬宥他們。
Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze: — Pesa ye kombo Lo-Rukama, pamba te nakotalisa lisusu bolingo na Ngai te epai ya libota ya Isalaele mpe nakolimbisa bango te.
7 但我要愛憐猶大家族,要拯救他們,因為我上主是他們的天主;但是我不以弓、弩、刀劍、戰爭、戰馬和騎士拯救他們。
Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.
8 羅魯阿瑪斷奶之後,哥默爾又懷孕,生了一個兒子。
Tango Gomeri alongolaki Lo-Rukama na mabele, Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mobali.
9 上主說:「你給他起名叫羅阿米 (非我人民),因為你們已不是我的人民,我已也不是你們的的上主。」
Yawe alobaki: — Pesa ye kombo Lo-Ami, pamba te bozali bato na Ngai te, mpe Ngai nazali Nzambe na bino te.
10 以色列子民的數目將如海邊的沙粒,不可斗量,不可勝數;在那裏人曾對他們說:「你們不是我的人民。」在那裏人也要對他們說:「你們是永生天主的人民。」
Nzokande, bana ya Isalaele bakozala ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo bakoki komeka to kotanga te; kaka na esika oyo balobaki na bango: « Bozali bato na ngai te, » bakokoma kobenga bango « bana na Nzambe na bomoi. »
11 猶大子民和以色列子民將在一起,要為自己選定一個首領;他們要由此地擴展,因為依次勒耳的日子要成為偉大的。
Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.

< 何西阿書 1 >