< 哈該書 1 >

1 [第一篇演詞]達理阿王二年六月初一,有上主的話藉哈蓋先知傳給沙耳提耳的兒子猶大省長則魯巴貝耳,和約匝達克火兒子大司祭耶叔亞說:
Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe:
2 萬軍的上主這樣說:這百姓說:「建築上主的殿字的時候還沒有到! 」
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »
3 於是上主的話藉哈蓋先知說:「
Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje:
4 當這座殿還尸一堆廢墟時,難道為你們就到了住有天花皮的房屋的時候﹖
« Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba? »
5 如今萬軍的上主這樣說:你們應細心考慮一下你們的行逕!
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.
6 你們播種的多,卻收割的少;你們吃,卻總吃不飽;你們喝,卻總喝不夠;你們穿衣,卻總不覺溫暖;賺了工資,無異尸將工資投了破囊。
Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »
7 萬軍的上主這樣說:你們應考慮一下你們的行逕!
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.
8 你們應上山去,搬運木材,建造殿宇! 葷到家時裏,我必因此喜悅,並發顯光榮──上主說。
Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe.
9 你們期望豐收,看,反而歉收;你們運到家裏,我反把它吃散;這是為了什麼﹖──萬軍上主的斷語──是為了我的殿宇尚在荒廢,而你們竟各自趕造自己的房屋。
« Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.
10 為此,上主對你們停降雨露,大地也停止了出產,
Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma.
11 因為我向大地、群山、五穀、新油、田地的出產、人畜和手中的一切工作招來了旱災。」
Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. »
12 於是沙耳提耳的兒子則魯巴貝耳的兒子,約匝達克的兒子大司祭耶叔亞,以及全體遺民都聽從了上主,他們天主的聲音,也聽從了上主,他們的天主給他們派遺來的哈蓋先知的話;因此百姓在上主面前都起了敬畏的心。
Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.
13 上主的使者哈蓋就以上主使者的名義向人民說:我與你們同在──上主的斷語。
Bongo Aje, momemi sango ya Yawe, asakolaki epai ya bato maloba oyo na Kombo na Yawe: « Nazali elongo na bino, » elobi Yawe.
14 於是上主振興起了沙耳提耳的兒子猶大省長則魯巴貝耳的精神,以及約匝達克的兒子大司祭耶叔亞的,和全體遺民的精神,他們便都上前來興工建造萬軍的上主,他們的天主的聖殿。
Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango,
15 時在達理阿王二年六月二十四日。
na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya motoba, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi.

< 哈該書 1 >