< 哈巴谷書 1 >

1 哈巴谷先知在神視中所得的神諭。
Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli:
2 上主,我呼救而你不予垂聽,要到何時﹖向你呼喊「殘暴」,而你仍不施救﹖
Oh Yawe, kino tango nini nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga, kasi ozali koyoka te? Nazali koganga epai na Yo: « Minyoko eleki! » kasi ozali kaka kobikisa te!
3 為什麼你仗我見到邪惡,人受壓迫,而你竟坐視﹖在我面前,只有壓害和殘暴,爭吵不休,辯論迭起。
Mpo na nini ozali kolakisa ngai makambo mabe ya boye? Mpo na nini ozali kosala eloko moko te? Liboso na ngai, nazali kaka komona libebi mpe makambo mabe, bato bazali kaka koswana mpe kofundana.
4 為此法律鬆馳,正義不彰,惡人包圍了義人,因而產生歪曲的審判。
Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te, bazali kokata lisusu makambo na bosembo te. Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo, makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te.
5 你們應觀察列邦,且應注意視,你們必要詑異驚奇,因在你們的日子內,我要做一件事,縱然有人述說,你們也不相信。
Botala nanu malamu bikolo mosusu mpe bokokamwa penza, pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo bokondima te soki bayebisi bino yango.
6 看,我要激起加色丁人──那殘暴凶猛的民族,向廣大的地區進發,侵佔別人的居所。
Nakotindela bino bato ya Babiloni, bato ya mitema mabe, oyo bayokelaka bato mawa te: batambolaka mokili mobimba mpo na kobotola bato bisika na bango ya losambo na makasi.
7 這民族獨斷獨行,目中無人,實令人恐怖。
Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka, basalaka makambo nyonso oyo bazali na yango posa, mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.
8 他們的馬捷於虎豹,猛於夜狼;他們的馬隊由遠方飛奔而來,像撲食的老鷹;
Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.
9 大事摧殘,而面目焦燥,有如烈風;聚集的俘虜,多似塵沙。
Bango nyonso bayaka nzela moko mpo na kotia mobulu, bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este, bazwaka bakangami ebele ndenge balokotaka mbuma ya zelo.
10 他們嘲笑列王,譏諷諸侯,嗤笑任何堡壘只堆一堆土,即可攻下;
Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi, basekaka bingumba batonga makasi, batondisaka mabele pembeni ya bamir mpo ete bamata likolo na yango mpe bakota na engumba mpo na kobotola yango,
11 然後鼓起勇氣向前猛進,以自己的力量為神。
balekaka lokola mopepe mpe bakobaka nzela na bango, basepelaka kosala mabe, mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.
12 吾主,你自古不就是我的天主,我的聖者﹖你決不會死亡! 上主,你派他們來是為審判;磐石,你立定他們是為懲罰。
Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.
13 你的眼睛這樣純潔,以致見不得邪惡,見不得折磨! 你為什麼垂顧背信的人﹖當惡人吞噬較他們更義的人,你又為什麼緘默﹖
Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo?
14 你竟把人當作海裏的魚,當作沒有主宰的爬蟲!
Okomisi bato lokola bambisi ya ebale, lokola banyama oyo etambolaka na libumu mpe ezanga mokonzi.
15 他們把所有的一切用鉤子鉤上來,用網拉上來,用罟收集起來,為此歡欣踴躍,
Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo, akangaka yango na monyama mpe atiaka yango na kitunga. Yango wana asepelaka mpe atondaka na esengo.
16 向網祭獻,向罟焚香,因為給他們帶來了富裕的財物,豐美的飲食。
Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, atumbelaka kitunga na ye ansa; pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.
17 難道因此他們就應時常倒空自己的羅,無情地屠殺萬民﹖
Boni, akosepela solo kotika ete monyama na ye ezanga mbisi na kokoba koboma bato na mawa te?

< 哈巴谷書 1 >