< 創世記 31 >
1 雅各伯聽見拉班的兒子們談論說:「雅各伯奪去了我們父親所有的一切,利用我們父親的財物,才獲得了這一切的財富。」
Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba: « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. »
Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.
3 那時,上主對雅各伯說:「你回到你的家鄉和你的出生地,我必與你同在。」
Yawe ayebisaki Jakobi: « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. »
Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele.
5 對她們說:「我看你們父親的臉色,對我已不如先前;但是我父親的天主卻與我同在。
Alobaki na bango: — Namoni ete ezaleli ya tata na bino epai na ngai etikali lisusu te ndenge ezalaki liboso; kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai.
Boyebi bino moko ete nasalelaki tata na bino na makasi na ngai nyonso.
7 你們的父親卻欺騙了我,十次變換了我的工價,但天住卻沒有容許他害我。
Kasi ye asakanaki na ngai na kobongola lifuti na ngai mbala zomi. Atako bongo, Nzambe apesaki ye nzela te ya kosala ngai mabe.
8 當他說:有斑點的算是你的工價;全羊群就都生下有斑點的;當他說:有條紋的算是你的工價,全羊群就都生下有條紋的。
Tango azalaki koloba: « Bibwele ya nzela-nzela ekozala lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya nzela-nzela. Mpe tango azalaki koloba: « Bibwele ya madodo-madodo nde lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya madodo-madodo.
Ezalaki bongo nde Nzambe azalaki kobotola bibwele ya tata na bino mpe kopesa ngai yango.
10 有一次當羊群配合時,我於夢中舉目觀望:看見跳在母羊身上的公山羊,都是有條紋,有斑點和雜色的。
Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe.
11 天主的使者在夢中對我說:雅各伯! 我答說:我在這裏。
Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto: « Jakobi! » Mpe ngai nazongisaki: « Ngai oyo, nazali awa. »
12 他說:你舉目觀望:跳在母羊身上的公山羊,都是有條紋,有斑點和雜色的,因為我看到了拉班對你所作的一切。
Alobaki na ngai: « Tombola miso mpe tala: bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo.
13 我是貝特耳的天主,你曾在那裏用油敷了一座石柱,並對我許了願。現在你起身,離開這地方,回到你生身之地去。」
Nazali Nzambe ya Beteli epai wapi osopaki mafuta na likolo ya libanga oyo otelemisaki lokola elembo mpe olapaki ndayi liboso na Ngai. Sik’oyo, telema, wuta na mokili oyo, mpe zonga na mokili na yo epai wapi obotama. »
14 辣黑耳和肋阿回答他說:「我們在父親家裏還有產業可分嗎﹖
Rasheli mpe Lea bazongisaki: — Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso?
15 他豈不是把我們視作外人,把我們出賣了,吞併了我們的身價﹖
Azalaki komona biso lokola bapaya, pamba te atekaki biso mpe aliaki mbongo na mito na biso.
16 所以天主由我們父親奪來的那一切財物,都應屬於我們和我們子女。現今凡天主吩咐你的,你都該照辦。
Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo.
Boye Jakobi amatisaki bana na ye mpe basi na ye likolo ya bashamo.
18 帶了自己一切牲畜和積聚的一切財物,即他在帕丹阿蘭所得的一切牲畜,起程往客納罕地,他父親依撒格那裏去了。
Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
19 其時拉班正剪羊毛去了,辣黑耳就偷走了她父親的神像。
Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye.
20 雅各伯隱瞞了阿蘭人拉班,沒有告訴拉班他將逃走,
Boye Jakobi akosaki Labani, moto ya Arami, pamba te atikalaki koyebisa ye te ete akokende.
21 遂帶了自己所有的一切逃走了,起身過了幼發拉的河,直向基肋阿得山地進發。
Akimaki elongo na nyonso oyo ezalaki ya ye, akatisaki ebale mpe akendeki na mokili ya bangomba ya Galadi.
Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima.
23 遂帶了自己的弟兄,在他後面一連追趕了七天的路程,在基肋阿得山地追上了他。
Boye Labani azwaki elongo na ye bandeko na ye ya mibali, alandaki Jakobi mikolo sambo mpe akangaki ye na mokili ya bangomba ya Galadi.
24 天主在夜間夢中顯現給阿蘭人拉班,對他說:「你小心,不要對雅各伯說好說壞。」
Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto; alobaki na ye: « Keba! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
25 拉班追上雅各伯時,雅各伯已在山上搭了帳幕;拉班和他的弟兄也在基肋阿得山地搭了帳幕。
Labani akangaki Jakobi, sima na Jakobi kotonga ndako na ye ya kapo kati na mokili ya bangomba ya Galadi. Boye Labani elongo na bandeko na ye ya mibali bavandaki mpe wana.
26 拉班對雅各伯說:「你作的是什麼事﹖竟瞞著我,將我的女兒們帶走,有如戰俘一樣!
Labani alobaki na Jakobi: — Makambo nini osali ngai? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba!
27 你為什麼暗中偷跑,瞞著我而不通知我,叫我好能快樂的唱著歌,打著鼓,彈著琴歡送你回去﹖
Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai? Mpo na nini oyebisaki ngai te? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda.
28 連我的兒女你都不讓我與他們吻別,你作的實在糊塗!
Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi! Osali penza lokola moto ya liboma!
29 我本可伸手加害你們,但是你們父親的天主昨夜對我說:小心,不要對雅各伯說好說壞。
Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai: « Keba! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
30 你現在切望回到父家,定要回去,但是你為什麼偷走了我的神像! 」
Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai?
31 雅各伯回答拉班說:「我害怕,我還以為你要由我手中奪去你的女兒。
Jakobi azongiselaki Labani: — Nabangaki, pamba te nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo ya basi na makasi.
32 至於你的神像,你在誰那裏搜出來,決不容他活著;當著我們弟兄的面,你如認出我這裏有什麼是屬於你的,儘管拿去。」雅各伯原不知道是辣黑耳偷了神像。
Kasi tika ete moto oyo okokuta awa na banzambe na yo akufa. Na miso ya bandeko na biso ya mibali, luka epai na ngai nyonso oyo ezali ya yo mpe zwa yango. Nzokande, Jakobi ayebaki te ete ezalaki Rasheli nde moto ayibaki banzambe yango.
33 拉班便進入雅各伯的帳幕,肋阿的帳幕和兩個婢女的帳幕,沒有找著;遂由肋阿的帳幕出來,進入辣黑耳的帳幕,
Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli.
34 辣黑耳卻拿了神像,放在駱駝的鞍下,自己坐在上面。拉班搜遍了整個帳幕,沒有找著。
Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te.
35 辣黑耳對她父親說:「望我主不要見怪,我不能在你面前起迎,因為我正在經期。」他搜索了,卻沒有找著神像。
Rasheli alobaki na tata na ye: — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te.
36 雅各伯於是動怒,與拉班爭論,質問他說:「我有什麼不對,有什麼罪過,致使你在我後面追趕﹖
Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye: — Mbeba nini nasalaki? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye?
37 你搜遍了我的東西,如找出了什麼東西是屬於你家的,擺在我和你的兄弟面前,叫他們在我們兩人間行裁判。
Tango oluki kati na biloko na ngai nyonso, eloko nini ya ndako na yo omoni? Tia yango awa liboso ya bandeko na yo ya mibali mpe ya ngai mpo bakatela biso mibale likambo.
38 這二十年來,我同你在一起,你的母綿羊和母山羊從未流產;你羊群中的公羊,我從未吃過;
Nasalaki epai na yo mibu tuku mibale; bameme na yo mpe bantaba na yo elongwaki zemi te, mpe natikalaki te kolia bameme ya mibali kati na bibwele na yo.
39 被野獸撕裂的我從未給你帶回,我自己賠償了損失;不論是白天偷去的,或是黑夜偷去的,你都向我索取。
Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu.
40 日間我受盡炎熱,夜間受盡嚴寒,兩眼無法入睡。在你家內這二十年,為了你的兩個女兒,我服事了你十四年;
Moyi ezalaki kobeta ngai na mokolo, malili ezalaki kokanga ngai na butu, mpe pongi ezalaki kokima ngai na miso.
41 另六年是為了你的羊群,這期間你竟十次變更了我的工價。
Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale: nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai.
42 假若我父的天主,亞巴郎的天主,依撒格所敬畏的上主,不同我在一起,你現在定會打發我空手回去;但是天主見到了我的苦況和我的辛苦,在昨夜就下了判決。」
Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.
43 拉班回答雅各伯說:「女兒是我的女兒,孩子是我的孩子,羊群是我的羊群,你眼見的這一切都是我的。但是對我的女兒,對她們生的孩子,我今天能作什麼呢﹖
Labani azongiselaki Jakobi: — Basi oyo bazali bana na ngai ya basi, bana oyo bazali bana na ngai, bibwele oyo ezali ya ngai mpe nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Bongo lelo, eloko nini nakoki kosala mpo na bana na ngai ya basi mpe mpo na bana oyo bango baboti?
44 現在,來,讓我們在你我之間立約,作你我之間的證據。」
Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso.
Boye Jakobi azwaki libanga mpe atelemisaki yango lokola elembo.
46 然後對自己的親戚說:「你們堆集石頭。」他們便拿了石頭,堆成一堆,就在那堆石頭上吃了飯。
Jakobi alobaki na bandeko na ye ya mibali: « Bolokota mabanga! » Balokotaki mabanga, batiaki yango liboke, mpe bango nyonso baliaki wana na likolo ya liboke ya mabanga.
47 拉班稱那石堆為「耶加爾、撒哈杜達;」雅各伯稱為「基肋阿得」
Labani abengaki esika yango Yegari-Saduta mpe Jakobi abengaki yango Galedi.
48 拉班說:「今天這堆石頭在你和我之間作見證。」為此給它起名叫「基肋阿得。」
Labani alobaki: — Lelo, liboke oyo ya mabanga ezali litatoli kati na yo mpe ngai. Yango wana babengaki yango Galedi.
49 又叫作「米茲帕,」因為他說:「我們彼此分離後,願上主監視我和你:
Babengaki yango lisusu Mitsipa; pamba te Labani alobaki lisusu: « Tika ete Yawe akengelaka kati na yo mpe ngai tango tokomonana lisusu te.
50 如果你虐待我的女兒,或在我的女兒外,另娶妻室,雖無人在我們中間,但有天主在你我之間作證。」
Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »
51 拉班又對雅各伯說:「看這堆石頭,看我在你我之間所立的石柱:
Labani alobaki lisusu na Jakobi: — Tala liboke oyo ya mabanga mpe libanga ya elembo oyo natelemisi kati na ngai mpe yo.
52 這堆石頭是見證,這石柱是見證,我決不越過這堆石頭去妨害你,你也不要越過這堆石頭和這石柱來妨害我。
Liboke oyo ya mabanga ezali motatoli, mpe libanga oyo ya elembo ezali motatoli. Nasengeli te kokatisa liboke oyo ya mabanga mpe libanga oyo ya elembo mpo ete naya kosala yo mabe na ngambo na yo; mpe yo osengeli te kokatisa liboke ya mabanga mpe libanga ya elembo mpo na koya kosala ngai mabe na ngambo na ngai.
53 但願亞巴郎的天主和納曷爾的天主,--即他們父親的天主,--在我們之間行裁判! 」雅各伯就指自己的父親依撒格所敬畏的上主起了誓。
Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso! Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga.
54 然後雅各伯在山上宰牲獻祭,叫了自己的親戚來吃飯;吃飯以後就在山上過了夜。
Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba.
55 拉班清早起來,與自己的外孫和女兒吻別,祝福了他們,便起身回本鄉去了。
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye.