< 創世記 14 >

1 那時史納爾王阿默辣斐耳,厄拉撒爾王阿黎約客,厄蘭王革多爾老默爾,哥因王提達耳,
Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari; Arioki, mokonzi ya Elasari; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,
2 興兵攻擊索多瑪王貝辣,哈摩辣王彼爾沙,阿德瑪王史納布,責波殷王舍默貝爾及貝拉即左哈爾王。
bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome; Birisha, mokonzi ya Gomore; Shineabi, mokonzi ya Adima; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.
3 那些王子會合於息丁山谷,即今日的鹽海。
Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo.
4 他們十二年之久隸屬於革多爾老默爾,在十三年上就背叛了。
Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye.
5 在十四年上,革多爾老默爾率領與他聯盟的君王前來,在阿市塔特卡爾那殷擊敗了勒法因,在哈木擊敗了組斤,在克黎雅塔殷平原擊敗了厄明,
Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi; bato ya Zuzimi, na Ami; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi;
6 在曷黎人的色依爾山擊敗了曷黎人,一直殺到靠近曠野的厄耳帕蘭;
bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe.
7 然後回軍轉到恩米市帕特,即卡德士,征服了阿瑪肋克人的全部領土,也征服了住在哈匝宗塔瑪爾的阿摩黎人。
Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
8 索多瑪王哈摩辣王,阿德瑪王,責波殷王和貝拉即左哈爾王於是出來,在息丁山谷列陣,
Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi
9 與厄蘭王革多爾老默爾,哥因王提達耳,史納爾王阿漠辣斐耳和厄拉撒爾王阿黎約客交戰:四個王子敵對五個王子。
mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami; Tideali, mokonzi ya Goyimi; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.
10 息丁山谷遍地是瀝青坑;索多瑪王和哈摩辣王逃跑時都跌在坑裏;其餘的人都逃到山裏去了。
Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.
11 那四個王子劫走了索多瑪和哈摩辣所有的財物和一切食糧,
Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia.
12 連亞巴郎兄弟的兒子羅特和他的財物也帶走了,因為那時他正住在索多瑪。
Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.
13 有個逃出的人跑來,將這事告訴了希伯來人亞巴郎,他那時住在阿摩黎人瑪默勒的橡樹區;這阿摩黎人原是亞巴郎的盟友厄市苛耳和阿乃爾的兄弟。
Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
14 亞巴郎一聽說他的親人被人擄去,遂率領家生的步兵三百一十八人,直追至丹。
Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
15 夜間又和自己的僕人分隊襲擊,將他們擊敗,直追至大馬士革以北的曷巴,
Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.
16 奪回了所有的財物,連他的親屬羅特和他的財物,以及婦女和人民都奪回來了。
Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.
17 亞巴郎擊敗革多老默爾和與他聯盟的王子回來時,索多瑪王出來,到沙委山谷,即「君王山谷」迎接他。
Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
18 撒冷王默基瑟德也帶了餅酒來,他是至高者天主的司祭,
Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo
19 祝福他說:「願亞巴郎蒙受天地的主宰,至高者天主的祝福!
mpe apambolaki Abrami na maloba oyo: « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami!
20 願將你的敵人交於你手中的至高者的天主受讚美! 」亞巴郎遂將所得的,拿出十分之一,給了默基瑟德。
Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
21 索多瑪王對亞巴郎說:「請你將人交給我,財物你都拿去罷! 」
Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami: — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
22 亞巴郎卻對索多瑪王說:「我向上主、至高者天主、天地的主宰舉手起誓:
Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome: — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,
23 凡屬於你的,連一根線,一根鞋帶,我也不拿,免得你說:我使亞巴郎發了財。
ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo: ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te: « Nakomisi Abrami mozwi. »
24 除僕從吃用了的以外,我什麼也不要;至於與我同行的人阿乃爾、厄市苛耳和瑪默勒所應得的一分,應讓他們拿去。」
Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai: Aneri, Eshikoli mpe Mamire; bango nde bakozwa biloko na bango.

< 創世記 14 >