< 創世記 13 >

1 亞巴郎帶了妻子和他所有的一切,與羅特一同由埃及上來,往乃革布去。
Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango; Loti mpe akendeki na ye elongo.
2 亞巴郎有許多牲畜和金銀。
Abrami akomaki na bozwi mingi: bibwele, palata mpe wolo.
3 他由乃革布逐漸往貝特耳移動帳幕,到了先前他在貝特耳與哈依之間,支搭帳幕的地方,
Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki
4 亦即他先前築了祭壇,呼求上主之名的地方。
mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe.
5 與亞巴郎同行的羅特,也有羊群、牛群和帳幕,
Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali.
6 那地方容不下他們住在一起,因為他們的產業太多,無法住在一起。
Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko;
7 牧放亞巴郎牲畜的人與牧放羅特牲畜的人,時常發生口角--當時客納罕人和培黎齊人尚住在那裏。
mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.
8 亞巴郎遂對羅特說:「在我與你,我的牧人與你的牧人之間,請不要發生口角,因為我們是至親。
Abrami alobaki na Loti: « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.
9 所有的地方不是都在你面前嗎﹖請你與我分開。你若往左,我就往右;你若往右,我就往左。」
Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana: soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »
10 羅特舉目看見約但河整個平原,直到左哈爾一帶全有水灌溉,--這是在上主消滅索多瑪和哈摩辣以前的事,--有如上主的樂園,有如埃及地。
Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.
11 羅特選了約但河的整個平原,遂興東方遷移;這樣,他們就彼此分開了:
Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki.
12 亞巴郎住在客納罕地;羅特住在平原的城市中,漸漸移動帳幕,直到索多瑪。
Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome.
13 索多瑪人在上主面前罪大惡極。
Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.
14 羅特與亞巴郎分離以後,上主對亞巴郎說:「請你舉起眼來,由你所在的地方,向東西南北觀看;
Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami: « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste.
15 凡你看見的地方,我都要永遠賜給你和你的後裔。
Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela.
16 我要使你的後裔有如地上的灰塵;如果人能數清地上的灰塵,也能數清你的後裔。
Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.
17 你起來,縱橫走遍這地,因為我要將這地賜給你。」
Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. »
18 於是亞巴郎移動了帳幕,來到赫貝龍的瑪默勒橡樹區居住,在那裏給上主築了一座祭壇。
Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.

< 創世記 13 >