< 以斯拉記 9 >

1 這些事完畢後,眾首領來到我面前說:「以色列民眾、司祭和肋未人可的事上,並沒有離開當地的人民:客納罕人、希威人、培黎齊人、耶步斯人、阿孟人、摩阿布人、埃及人和阿摩黎人,
Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki: « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,
2 因為他們為自己和自己是兒子,娶了他們的女子,以致聖潔的曲裔,與當地的人民合;尤其首長和官,是這罪孽的魁首」。
pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »
3 我一聽這話,便撕裂了我的衣服和外氅,拔我的頭髮和鬍鬚,絕望地坐下。
Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.
4 當時凡對以色列天主的誡命起敬起畏的人,為了充軍歸的罪孽,都聚集在我周圍,我絕望地坐著,直到晚祭。
Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa.
5 到了獻晚祭時,我悲憤人起來,仍穿著撕碎的衣服和外氅,雙膝跪下,伸手向上主我的天主說:
Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai.
6 「我的天主,我實覺慚愧! 我的天主! 我不敢向你仰面,因為我們的邪惡,積累得高過了我們的頭頂,我們的罪孽上達於天。
Nalobaki: « Oh Nzambe na ngai! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo!
7 自從我們的祖先時代,直到今日,我們犯了重大的罪孽;為了我們的罪惡,我們連我們的君王司祭,都被交在異地的君王手中,喪身刀下,被俘擄,遭劫,丟臉受辱,就像今日一樣。
Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
8 但是現在,轉瞬之間,上主我們的天主,對我們施了仁慈,留給了我們一些殘存的人,又在聖地給了我們居所;並且我們的天主,還使我們的眼目明亮,在我們為奴隸期中,使我們尚有少許生氣。
Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.
9 我們原是奴隸,但我們在為奴隸期中,我們的天主沒有離棄我們,反而使我們在波斯王,獲得了寵遇,使我們有了生氣,得以重建天主的殿宇,修廢壚,我們在猶大和耶路撒冷,得了保障。
Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi: bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi.
10 現今,我們的天主! 在這些事後,我們還有什麼可說的呢﹖只能說我們又遺棄了你的誡命,
Sik’oyo, oh Nzambe na biso, toloba lisusu nini na makambo oyo ezali kosalema? Pamba te tobateli te mibeko na Yo,
11 因你曾藉你的僕人眾先知,吩咐說:『你們要去佔領的地方,因各地異民的卑污行為,成了不潔之地;他們的醜行和罪孽,充滿了那地方的各個角落,
oyo opesaki na nzela ya basali na Yo, basakoli, tango olobaki: ‹ Mokili oyo bozali kokota mpo na kokamata yango ezali mokili oyo ebebisami na mbindo ya bato wana. Na nzela ya misala na bango ya nkele, batondisi mokili yango nyonso na mbindo na bango.
12 所以你們絕不可將你們的女兒嫁給他們的兒子;也不給你們的兒子,他們的女兒為妻,也永不可他們共謀平安和福利:這樣你們才會強盛,才能吃那地方的出產,將這地留給你們的子孫,作為永遠基業」。
Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. ›
13 為了我們的許多罪行和重大的罪孽,這一切降到了我們身上之後,──我們的天主! 其實你估了我們的罪惡,還給我們留下了這些亡命的人,──
Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo!
14 我們還敢破壞你的誡命,而同這些不潔的民族聯婚嗎﹖難道還要你向我們發怒,一直將我們完全消滅,不一個遺民或亡命的人嗎﹖
Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi?
15 上主,以色列的天主! 因你仁慈,才剩下了我們這些亡的人,像今天一樣;看,我們在你面前都帶有罪孽,因此,沒有一個能在你面前站得住。
Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo! »

< 以斯拉記 9 >