< 以西結書 48 >

1 支派的姓名如下:由極北瑞起,沿赫特隆路至哈瑪特口,再至哈匝爾厄南,;──北有大馬士革邊界,有哈馬特邊界──每支派由東界到西界各有一份:這是丹的一份。
« Tala bikolo ndenge ekomami kolanda bakombo na yango: Libota ya Dani ekozwa eteni moko ya mabele: mondelo na yango ekolekela na nzela ya Etiloni kino na Lebo-Amati, Atsari-Enani mpe mondelo ya nor ya mokili ya Damasi pembeni ya Amati; boye mondelo na yango ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
2 靠近丹的邊界,由東界到西界,是阿協爾的一份;
Libota ya Aseri ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Dani, longwa na este kino na weste.
3 靠近阿協爾的邊界,由東界到西界,是納斐塔里的邊界,
Libota ya Nefitali ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Aseri, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
4 靠近納納斐塔里的邊界,由東界到西界,是默納協的邊界,
Libota ya Manase ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Nefitali, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
5 靠近默納協的邊界,由東界到西界是厄法辣因的一份。
Libota ya Efrayimi ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Manase, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
6 靠近厄弗辣因的邊界,由東界到西界,是勒烏本的一份。
Libota ya Ribeni ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Efrayimi, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
7 靠近勒烏本的邊界,由東界到西界是猶大的一份。
Libota ya Yuda ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Ribeni, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
8 靠近猶大的邊界,由東界到西界,是你們應保留的獻地,寬二萬五千肘,長由東界到西界,如每支派分得的一份一樣,中間是聖所。
Eteni ya mabele oyo bakopesa Yawe lokola likabo ya motuya ekozala na mondelo ya etuka ya Yuda: longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste; ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na mokuse, mpe molayi na yango ekozala ndenge moko na biteni ya mabele ya mabota mosusu. Boye, Esika ya bule ekozala na kati-kati na yango.
9 你們為上主保留的獻地,長二萬五千肘,寬一萬肘。
Eteni ya mabele ya motuya oyo bokopesa Yawe lokola likabo ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse.
10 這塊所獻的聖地應歸司祭,北面長二萬五千肘,西面寬一肘,東面寬一萬肘,南面寬二五千肘,衵間是上主的聖所。
Eteni yango ya mabele ekozala bule mpe ekopesama mpo na Banganga-Nzambe: ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya nor, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya weste, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya sude. Esika ya bule ya Yawe ekozala na kati-kati na yango.
11 這地應歸疲祝聖作上主司祭的匝多克的子孫,他們謹慎遵行了我的禮規,當以色列子民墮落時,他們沒有像肋未人一樣落時下去。
Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki.
12 屬司祭之地是獻地中至聖之地,靠近近肋未人的邊界。
Ekozala mpo na bango lokola likabo ya motuya oyo ewuti na eteni ya mabele oyo ebulisama kati na mokili, eteni ya mabele oyo eleki na bule na bandelo ya etuka ya Balevi.
13 屬肋未人的地與司祭的邊界平行,長二萬五千肘,寬一萬肘,總計長二萬五千肘,寬二萬肘。
Na zingazinga ya etuka ya Banganga-Nzambe, Balevi bakozwa eteni moko ya mabele ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse.
14 其中的地不可變賣,不可交換也不可轉讓,這是地中最好的一份,因為是祝聖於上主的。
Bakoki te koteka to kopesa eloko moko kati na eteni ya mabele yango na bato mosusu, pamba te yango ezali mabele oyo eleki kitoko, mpo ete ebulisama mpo na Yawe.
15 由二萬五千肘的面積所餘的五千肘應列為俗地,作為居住的城市和郊區,城市應在中心。
Eteni ya mabele oyo ekotikala, eteni ya bametele pene nkoto mibale na nkama mitano na mokuse mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, ekozala ebulisama te; ekozala mpo na kosala misala ya engumba lokola kotonga bandako mpe kobokola bibwele; engumba ekozala na kati-kati na yango
16 城市的面積如下:北面四千五百肘,北面四千五百肘,南面四千五百肘,東面四千五百肘。
mpe ekozala na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, na bangambo nyonso: nor, sude, este mpe weste.
17 城市外的郊區是:北面二百五十肘,南面二百五十肘,東面二百五十肘,西面二百五十肘。
Bongo, lopango ya kobokolela bibwele ya engumba ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mibale na mitano, na bangambo nyonso: nor, sude, este mpe weste.
18 至於那與所獻聖地平行的所餘之地,東面長一萬肘,西面長一萬肘,甚中出產應作為城內居民的食糧。
Eteni ya mabele oyo ekotikala na etuka, zingazinga ya eteni ya bule, longwa na molayi na yango, ekozala na bametele pene nkoto mitano na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto mitano na ngambo ya weste. Bambuma ya mabele na yango ekoleisa bato oyo bakosala mpo na engumba.
19 城內的居民是由以色列各支派分派來住的。
Basali oyo bakobanda kowuta na engumba epai wapi basalaka mpo na kosala mosala ya bilanga bakobimela na mabota nyonso ya Isalaele.
20 整個獻地為二萬五千肘長,二萬五千肘寬,為一方形,是你們應保留的所獻聖地和城市地段。
Eteni nyonso ya mabele oyo bakobulisa mpo na Yawe ekozala na molayi moko, na bangambo nyonso: bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano ndenge likabo ya motuya ezalaka; bokolongola ndambo moko kati na bandambo minei ya eteni ya bule mpe bokosalela yango misala ya engumba.
21 在所獻聖地和城市地段的兩所餘之地,二萬五千肘由東至東面的邊界,由西至西面的邊界,與各支派所分之地平行,都歸元首,所獻聖地與聖所在中間。
Eteni ya mabele oyo ekotikala na bangambo nyonso mibale ya eteni ya mabele oyo ebulisama mpe ya eteni ya mabele oyo ebongisami mpo na misala ya engumba ekozala ya mokambi. Ekozala longwa na mondelo ya ngambo ya este ya eteni ya mabele oyo ebulisama, oyo ezali na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi kino na mondelo ya ngambo ya weste oyo ezali mpe na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi. Eteni ya mabele oyo ebulisama mpe Esika ya bule ya Tempelo ekozala na kati-kati ya biteni nyonso mabele.
22 除在屬元首的地中間,有肋未人的產業和城市地段外,凡在猶大邊界和本雅明邊界飲間的土地,皆歸元首所有。
Boye, eteni ya mabele ya Balevi mpe eteni ya mabele oyo ebongisama mpo na misala ya engumba ekozala na kati-kati ya eteni ya mabele ya mokambi. Eteni ya mabele ya mokambi ekozala na kati-kati ya bandelo ya libota ya Yuda mpe ya libota ya Benjame.
23 至於其餘的支派:由東界到西界,是本雅明的一份。
Mpo na mabota mosusu: Libota ya Benjame ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
24 靠近本雅明的邊界由東界至西界是西默盎的一份。
Libota ya Simeoni ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Benjame na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
25 靠近西默盎的一邊界,由東界至西界是依撒加爾的一份。
Libota ya Isakari ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Simeoni na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
26 靠近依撒加爾的邊界,由東界至西界是則布隆的一份。
Libota ya Zabuloni ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Isakari, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
27 靠近則布隆的邊界,由東界至西界,是加得的一份。
Libota ya Gadi ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Zabuloni, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
28 靠近加得的邊界,是南方向陽的邊界,由塔瑪爾到默黎巴卡德士水沿河直到大海。
Bandelo ya mabele ya Gadi ekozala na ngambo ya sude, pene ya Negevi, longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi; ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane.
29 這是你們各支派抽籤平分的土地,是你們應得的產業──吾主上主的斷語。
Yango nde mokili oyo bokokabola na zeke lokola libula kati na mabota ya Isalaele, libota na libota na eteni na yango ya mabele, » elobi Nkolo Yawe.
30 城的出口如下:北面為四千五百肘,
« Tala oyo ekozala bikuke ya engumba: Na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano,
31 北面有三門:一為勒烏本門,一為猶大門,一為肋未門。城門都是照以色列支的名字派起的。
bikuke ya engumba ekobengama na bakombo ya mabota ya Isalaele. Na ngambo ya nor, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Ribeni, ekuke ya Yuda, mpe ekuke ya Levi;
32 東面為四千五百肘,有三門:一為若瑟門,一為本雅明門,一為丹門。
Ngambo ya este, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Jozefi, ekuke ya Benjame, mpe ekuke ya Dani.
33 南面為四千五百肘,有三門:一為西默盎門,一為依撒加爾門,一為則步隆門。
Na ngambo ya sude, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Simeoni, ekuke ya Isakari, mpe ya ekuke ya Zabuloni.
34 西面為四千五百肘,有三門:一為加得門,一為阿協爾門,一為納斐塔里門。
Na ngambo ya weste, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Gadi, ekuke ya Aseri mpe ya ekuke ya Nefitali.
35 周圍共一萬八千肘。這城從那天起名叫「上主在那裏。」
Molayi nyonso ya mir oyo ezingeli engumba ekozala na bametele pene nkoto libwa. Mpe kobanda na tango wana, kombo ya engumba ekokoma ‹ Yawe azali awa. › »

< 以西結書 48 >