< 以西結書 4 >

1 「人子,你拿一塊磚,放在你面前,把一座耶路撒冷城刻劃在上面。
« Sik’oyo mwana na moto, kamata biliki ya kotumba, tia yango liboso na yo mpe koma na likolo na yango elilingi ya engumba Yelusalemi.
2 安排圍城的事;製造攻城的雲梯,堆起攻城的高台,擺列攻城的陣營,四周架起破城機。
Sala yango lokola engumba oyo bazingela, oyo batonga mabulu ya kobombamela zingazinga na yango mpe oyo batelemisa bamir ya zelo mpo na kobombama, engumba oyo batonga milako zingazinga na yango, mpe telemisa bakonzi ya basoda oyo babongami mpo na kobundisa yango na zingazinga.
3 再拿一個鐵鏊,將它立在你和城的中間,當作鐵牆。然後朝著城板起面孔,使城好像被圍困,你好像在攻城:這樣給以色列家一個徵兆。」
Kamata eteni ya linzanza, tia yango lokola mir ya ebende na kati-kati na yo mpe elilingi ya engumba oyo osili kokoma, mpe tika ete miso na yo etala yango. Bakozingela engumba yango ndenge kaka yo osili kozingela yango. Yango nde ekozala elembo mpo na libota ya Isalaele.
4 你要向左側臥下! 我把以色列家的罪惡放在你身上。你臥多少日子,就多少日子承擔他們的罪惡。
Bongo yo, lala na ngambo ya loboko na yo ya mwasi, tia na ngambo wana masumu ya libota ya Isalaele. Okomema masumu na bango mikolo nyonso oyo okolala na ngambo wana.
5 我把他們犯罪的年數算為三百九十日,你要在這些日子內承擔以色列家的罪惡。
Ngai moko nakokatela yo motango ya mikolo, oyo ekokokana na motango ya mibu oyo libota ya Isalaele asali masumu: mikolo nkama misato na tuku libwa; mpe okomema solo masumu ya libota ya Isalaele na mikolo oyo.
6 滿了那些日子,你要向右側臥下,為承擔猶大家的罪惡,共四十日;我給你規定一日算一年。
Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei: mokolo moko mpo na mobu moko na moko.
7 你要朝著被圍困的耶路撒冷板起面孔,露出臂膊,向她預言。
Talisa elongi mpe loboko na yo na ngambo ya Yelusalemi oyo bazingela mpe sakola mabe na tina na yango.
8 看,我要用繩索捆縛你,叫你不能輾轉反側,直到你被困的日子期滿。」「
Nakolinga-linga yo na basinga mpo ete okoka kobaluka na ngambo mosusu te kino tango okokokisa mikolo na yo ya etumbu.
9 你要拿小麥、大麥、豆子、扁豆、黍米和粗麥,裝在一個器皿裏,用來為你做一些餅,在你三百九十日側臥的日子內,就吃這些餅。
Kamata ble mpe orje, madesu mpe misili, soya mpe masango, tia yango nyonso kati na mbeki moko kaka oyo babombelaka biloko. Ezali yango nde ekozala bilei oyo okobanda kolia tango nyonso, na mikolo nkama misato na tuku libwa oyo okowumela ya kolala na ngambo moko.
10 每天要按分量吃,每日二十「協刻耳,」按時食用。
Bilei na yo ya mokolo na mokolo ekozala ya bagrame nkama mibale na tuku mibale, mpe okobanda kolia yango tango nyonso.
11 喝水也要有分量,每日喝六分之一「歆」的水,按時而飲。
Okobanda komela tango nyonso litele moko ya mayi.
12 你吃那食物像吃烙的大麥餅,且用人糞在他們眼前烤。」
Okolia bilei basala lokola gato ya orje mpe okobanda kotumba yango na miso ya bato nyonso, na moto oyo bapelisa na nyei ya bato. »
13 上主說:「以色列子民也要這樣在我趕他們所到的異民中,吃不潔之物。」
Yawe alobaki: — Ezali na nzela wana nde bana ya Isalaele bakolia bilei ya mbindo kati na bikolo epai wapi nakobengana bango.
14 我答說:「哎呀! 吾主上主! 我從來沒有受過玷污;從幼年到現在,沒有吃過自然死的,或被撕裂的獸肉;不潔的祭肉從未進過我的口。」
Bongo nalobaki: — Te, Nkolo Yawe! Natikala nanu komikomisa mbindo te! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te!
15 他向我說:「好罷! 我許你用牛糞代人糞烤你的餅。」
Alobaki na ngai: — Malamu mingi! Na esika ya nyei ya bato, napesi yo nyei ya ngombe mpo ete okoka kotumbela gato na yo.
16 他又向我說:「人子! 看,我要斷絕耶路撒冷的糧源,叫他們懷著焦慮吃配給的飯,懷著恐怖喝限制的水;
Alobaki na ngai lisusu: — Mwana na moto, nakobebisa bilei nyonso oyo ezali na bibombelo ya Yelusalemi. Bato bakolia biteni mike ya mapa, na pasi na motema, mpe bakomela mayi na bakopo ya mike, na somo;
17 甚至缺少食糧和水,個個消瘦,因自己的罪惡而歸於消滅。」
pamba te bilei mpe mayi ya komela ekokoma pasi mpo na kozwa. Moko na moko akokamwa mpo na moninga na ye mosusu; mpe bakobebisama likolo ya masumu na bango.

< 以西結書 4 >