< 以西結書 35 >

1 上主的話傳給我說:「
Yawe alobaki na ngai:
2 人子,你要面向色依爾山,講預言攻斥它,
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya ngomba Seiri mpe sakola mpo na kotelemela yango!
3 對它說:吾主上主這樣說:色依爾山啊! 看,我要攻擊你,伸手打擊你,使你變成沙漠和荒野。
Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natombokeli yo, ngomba Seiri! Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokomisa yo esobe mpe mokili oyo ezanga bato.
4 我要使你的城市變成廢墟,你將成為沙漠:如此,你便承認我是上主。
Nakobebisa bingumba na yo, mpe okotikala lisusu na bato te; boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
5 因為在以色列子民遭難時,在他們罪惡滿盈時,你懷著永不忘的仇恨將他們交於刀劍:
Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango,
6 為此,我指著我的生命起誓──吾主上主的斷語──你既仇恨了血,血也必迫害你。
na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakosopa makila na yo, mpe makila ekolanda yo. Lokola ozalaki na somo te ya kosopa makila, makila ekolanda yo.
7 我必使色依爾山成為沙漠和荒野,由其中滅絕來往經過的人。
Nakokomisa ngomba Seiri esika oyo ebebisama nye mpe ezanga bato; mpe nakoboma kuna bato nyonso oyo bakoluka kokende mpe kozonga.
8 我要使你的群山、丘陵、山谷和溪澗,堆滿傷亡的人,使刀劍傷亡的人橫臥其中。
Nakotondisa bangomba na yango nyonso na bibembe; bato nyonso oyo bakokufa na mopanga bakokweya na bangomba na yo ya mike, kati na mabwaku na yo mpe na se ya bangomba na yo nyonso.
9 我要使你永久變為荒蕪,你的城邑再沒有人居住:如此,你們便承認我是上主。
Nakokomisa yo esobe mpo na libela, bingumba na yo ekozala lisusu na bato te; boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
10 因為你說過:這兩個民族,這兩個地域應屬於我,雖然雅威住在那裏,我還要去佔領;
Mpo ete olobaki: ‘Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango,’ atako Yawe azalaki kuna;
11 為此,我指著我的生命起誓,──吾主上主的斷語──就如你怎樣懷著仇恨對待他們,同樣我也必以怒火和妒恨來對待你;當我懲罰你時,我叫你知道我在他們中,
mpo na yango, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakopesa yo etumbu kolanda kanda mpe zuwa na yo, oyo olakisaki mpo na kosala bango mabe mpo ete oyinaki bango; mpe Ngai moko, nakosala ete bayeba Ngai tango nakosambisa yo.
12 並要你知道,我上主聽見了你向以色列的群山所講的一切詛咒的話,說:它們已荒蕪了,已交給我們享用。
Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki: ‘Tala, bangomba ebebisami! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia!’
13 當你們開口說大話攻斥我,說出許多凌辱我的話時,我都聽見了。
Botelemelaki Ngai mpe bolobaki na Ngai na maloba ya lolendo; nayokaki yango Ngai moko.
14 吾主上主這樣說:當全地歡躍時,我要使你荒蕪,
Boye, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tango mokili mobimba ekozala na esengo, Ngai nakobebisa yo.
15 就如在以色列家的產業荒蕪時,你曾喜樂;同樣,我也要這樣對待你;色依爾山必變成荒野,全厄東必被消滅:如此,人必承認我是上主。」
Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana: ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »

< 以西結書 35 >