< 以西結書 31 >

1 十一年三月一日,上主的話傳給我說:「
Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai:
2 人子,你要向埃及王法郎和他的民眾說:你的偉大相似誰呢﹖
« Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso: ‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu?
3 看,你是一棵黎巴嫩香柏,枝葉美觀,蔭影濃密,枝幹高大,樹梢插入雲霄。
Tala mokili ya Asiri malamu! Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani: bitape na yango ezalaki kitoko mpe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa pio koleka banzete nyonso ya zamba; elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi, songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata.
4 水使它長大,淵泉使它長高;河水由四周流入栽植它之地,支流灌溉田中其他的樹木。
Mayi ezalaki kokolisa yango, mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi; ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba.
5 為此它的枝幹高過田間的一切樹木,因為水多,生長時枝業繁茂,枝條特長。
Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi koleka banzete nyonso ya zamba; bitape na yango ekomaki milayi, mpe makasa na yango ekomaki ebele, pamba te ezalaki kozwa mayi ebele.
6 天上的一切飛鳥在它枝幹上築巢,田間的野獸在他的枝葉下生子,各國的人民住在它的蔭影下。
Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koya kotonga bazala na bitape na yango, banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango. Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango.
7 它的枝葉廣闊,高大華麗,因為它的根深入多水之地。
Ezalaki kitoko na monene na yango mpe na molayi ya bitape na yango, pamba te misisa na yango ezalaki ekita kino na mayi minene.
8 天主樂園中的香柏,都不能同它相比,扁柏不及它的枝幹,楓樹不及它的枝椏,天主樂園中所有的樹木都沒有它那樣美麗。
Kati na elanga ya Nzambe, nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango, nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape, nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa: nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango na kitoko.
9 我使它枝葉茂盛而美麗,致令「伊甸」──天主樂園──中所有的樹木都嫉妒它。
Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele; bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe, ezalaki kolula yango.
10 因此吾主上主這樣說:因它枝幹高大,枝梢插入雲霄,遂因自己高大而心高氣傲。
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango,
11 我必將它交在列國最強的人手中,他們要任意對待它;我必要因它的罪行而將它剷除;
nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango;
12 列國最兇殘的人必要將它伐倒,把它拋棄在山上;它的枝椏,倒臥在山谷中,枝條折落在一切窪地上;萬國的人民都要離開它的蔭影,而棄捨它;
mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango; bongo etikalaki yango moko.
13 天上飛鳥都棲在它倒了的枝幹上,田間的各種野獸都停在它的枝條下,
Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango.
14 這是為使一切有水滋潤的樹木,不要因自己的軀幹高大而自負,不要再讓枝梢插入雲霄,免得各種有水滋潤的樹木,因高聳而自大,因為他們都要歸於死亡,降到陰間,到那些已降入深淵的人子中。 (questioned)
Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.
15 吾主上主這樣說:在它下到陰府的那天,我要使人哀弔它;為了它我要使深淵閉塞,使江河凝結,洪水停流,使黎巴嫩為它舉哀,使田間所有的樹木因它而枯萎。 (Sheol h7585)
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. (Sheol h7585)
16 當我使它下到陰府與已在深淵的人在一起時,也使列國因它下墜之聲而戰慄;那時「伊甸」中的各種樹木,黎巴嫩一切有水滋潤的華麗而高大的樹木,在陰間都感到安慰。 (Sheol h7585)
Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. (Sheol h7585)
17 那些在各國住在它蔭影下幫助過它的的人,也隨它下到陰府,同那喪身刀下的人在一起。「 (Sheol h7585)
Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo. (Sheol h7585)
18 伊甸」的樹木中,就華麗和高大說,你相似那一棵﹖你也要同「伊甸」的樹木一起被推入陰間,在未受割損的人中,同喪身刀下的人臥在一起:這是指法郎和他所有的人民說的──吾主上主的斷語。」 (questioned)
Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »

< 以西結書 31 >