< 以西結書 27 >
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na Tiri!
3 向位於海口,同許多島嶼及人民通商的提洛說:吾主上主這樣說:提洛,你曾說過:我是一隻完美華麗的船;
Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh engumba Tiri, olobaka: ‘Ngai, nakoka na kitoko na ngai!’
Etando na yo ezali kati na bibale minene; bato oyo batongaki yo nde bakomisaki yo kitoko makasi.
5 他們用色尼爾的松柏製造了你的舷板,以黎巴嫩的香柏做了你的桅檣,
Basalaki mipanzi na yo nyonso na mabaya ya sipele oyo ewutaki na Seniri; basalaki likonzi ya masuwa na yo na nzete ya sedele oyo ewutaki na Libani;
6 以巴商的橡木做了你的櫓槳,用由基廷島運來的松柏做了嵌有象牙的甲板,
basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi;
7 用埃及的繡花麻布做了你的帆幔,作了你的旗幟,用厄里沙島的紫色與朱色的布做了你的船蓬;
basalaki vwale mpe bendele na yo na elamba ya lino ya kitoko oyo ewutaki na Ejipito, mpe batongaki bililingi kati na yango; bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane, ewutaki na bisanga ya Elisha.
8 漆冬和阿爾瓦得的居民給你搖櫓,責默爾的技工在你那裏作你的舵手,
Baluki nkayi na yo bazalaki bato ya Sidoni mpe ya Arivadi. Oh Tiri, bato na yo, oyo bazalaki na bwanya koleka, nde bazalaki kotambolisa yo.
9 革巴耳的長老和技工在你那裏修理你的漏洞。一切航海的船隻和海員都到你那裏,交易貨物。
Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya nde bazalaki kosala epai na yo mosala ya kobamba madusu na yo mpo ete mayi ekota te; bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka.
10 波斯、路丁和普特人在你隊伍中作你的軍人,他們將盾牌和銅盔懸在你中間,增加你的光彩。
Bato ya Persi, ya Ludi mpe ya Puti bazalaki basoda kati na mampinga na yo: bazalaki kotia banguba mpe bikoti na bango na likolo ya bamir na yo; bazalaki kosala lokumu na yo.
11 阿爾瓦得和赫肋客子民圍繞在你的城牆上,加瑪得人在你的角樓中;他們把自己的盾,掛在四周的城牆上,使你的華麗更為圓滿。
Bato ya Arivadi mpe basoda na yo ya mpiko bazalaki kotelema na bangambo nyonso ya bamir na yo, basoda ya Gamadi bazalaki kati na bandako na yo ya milayi: bazalaki kotia banguba na bango zingazinga ya bamir na yo, bazalaki kosala ete kitoko na yo ekoma ya kokoka.
12 塔爾史士因你的財帛豐富,作你的客商以銀、鐵、錫、鉛來與你交易。
Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi.
13 雅汪、突巴耳、默舍客和你通商,以人口和銅器與你交易貨物。
Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka.
14 由托加爾瑪地方,有人以馬、戰馬、騾子來交換貨物。
Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile.
15 德丹人也和你通商,許多島民作你手下的商人,以象牙角和烏木作送給你的貢物。
Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni.
16 阿蘭人因你的出品多,也作你的客商,以紫寶石、紅布、刺繡、細麻、珊瑚和紅瑪瑙與你交換貨物。
Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi.
17 猶大和以色列地也和你通商,以米尼特穀、蠟、蜜、油和香料與你交易貨物。
Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
18 大馬士革因你出產多,財帛豐富,也作你的客商,以赫耳朋酒和匝哈爾羊毛與你交易。
Bato ya Damasi bazalaki kosala mombongo elongo na yo, pamba te ozalaki na bambuma ebele mpe na biloko ebele; bazalaki komema epai na yo masanga ya vino oyo ezalaki kowuta na mboka Eliboni mpe bapwale ya bameme oyo ezalaki kowuta na mboka Tsakari, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
19 此外丹、雅汪和烏匝耳也與你交易,以鋼鐵、肉桂和香菖蒲交換你的貨物。
Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo bilamba ya kitoko oyo batiaka na bampunda.
21 阿剌伯和刻達爾的一切酋長也作你手下的商人,以羔羊、山羊和公羊與你交換貨品。
Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
22 舍巴和辣阿瑪的買賣人也作你的顧客,以各種上等的香料,各種寶石和黃金和你交換貨品。
Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo.
23 哈郎、加乃、厄登和舍巴的商人,亞述和一切瑪待人也與你通商。
Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo;
24 他們在你的商場上,以華麗的衣服、朱色的外氅、刺繡、花毯、編織的結實繩索與你交易。
bazalaki kosala elongo na yo mombongo ya biloko ya kitoko: bakazaka ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bitoko ya balangi ya ndenge na ndenge mpe mikaba makasi mpe ya kitoko.
25 塔爾史士船隻載運你的貨物。你在海上滿了載,極其沉重。
Bamasuwa minene ya Tarsisi ezalaki komema biloko na yo ya koteka. Otondaki meke na biloko mpe okendeki sango kati na bibale minene.
26 你的槳夫將你划到汪洋大海,東風將你在海中吹毀。
Baluki nkayi na yo bamemaki yo kino na kati-kati ya bibale minene. Kasi mopepe ya este ebukaki-bukaki yo na biteni na kati-kati ya ebale monene:
27 你的財帛、商品、貨物,你的水手、舵手、船工,同你交易的商人,在你中間的一切戰士,以及在你中間所有的民眾,都在你沉沒之日,溺死海中。
bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, mombongo na yo, baluki nkayi na yo, bato na yo, oyo basalaka na masuwa, basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, bato oyo basalaka mombongo elongo na yo mpe basoda na yo nyonso elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, bakokufa na kati-kati ya bibale minene na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda.
Tango baluki nkayi na yo bakoganga, bituka ya ngambo ya ebale monene ekolenga na somo.
29 所有搖櫓的人、水手和航海的舵手都要離船登岸,
Baluki nkayi nyonso mpe bato mosusu oyo basalaka na masuwa bakosundola masuwa; bakotelema na libongo,
30 狂呼吶喊哀弔你,在頭上撒灰,輾轉於塵埃之中,
bakoganga na mongongo makasi mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo; bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele.
31 並且為你而剃光了頭,穿上苦衣,痛心哭泣,悲痛哀悼你。
Bakomikokola suki ya mito mpe bakolata basaki. Bakolela yo na mawa na motema mpe bakomitungisa makasi na mitema.
32 他們在痛苦中,向你唱哀歌,追悼你說:『有誰相似沉沒於海中的提洛﹖
Kati na pasi mpe kolela na bango, bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo: ‘Nani azalaki lokola Tiri, lokola engumba oyo ekomi kimia kati na ebale monene?’
33 你的貨品由海中運出時,曾使許多民族滿足;以你大量的財帛和貨物,使陸地上的列王豐富。
Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima wuta na ebale monene, ozalaki kokokisa baposa ya bikolo ebele; ebele ya bomengo mpe ya nkita na yo ezalaki kokomisa bakonzi ya mokili bazwi.
34 現今你沉入海中,落在海底,你的財物和所有的人,都隨著你而沉沒了。』
Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo, ebwaki yo kati na mozindo ya mayi: biloko na yo mpe basali na yo nyonso bazindi elongo na yo.
35 群島所有的居民都為你而驚駭,那裏的列王都極為戰慄,面帶憂色。
Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo; bakonzi na bango bazali kolenga na somo, mpe bilongi na bango ebebi likolo ya kobanga.
36 各國的商人都要嗤笑你;你竟成了恐怖的對象,且永遠不復存在。」
Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi koseka mpe kowolola yo: Osuki eh! Osuki! Okotikala kozala lisusu te! › »