< 以西結書 23 >

1 上主的話傳給我說:「
Yawe alobaki na ngai:
2 人子,有兩個女人,同是一母的女兒,
« Mwana na moto, ezalaki na basi mibale, bana ya mama moko.
3 她們在埃及行過淫,年輕時當過娼,在那裏有人撫弄過她們的乳房,在那裏有人糟蹋了她們的童身。
Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.
4 她們的名字,大的叫敖曷拉,她妹妹叫敖曷里巴。她們本來屬於我,也給我生了子女。至於她們的名字:敖曷拉是指撒瑪黎雅,敖曷里巴是指耶路撒冷。
Oyo ya kulutu, kombo na ye ezalaki Ohola; mpe oyo ya leki, kombo na ye ezalaki Oholiba: bazalaki basi na Ngai mpe babotaki bana mibali mpe bana basi. Ohola azali Samari mpe Oholiba azali Yelusalemi.
5 敖曷拉屬我時,已行邪淫,戀愛了她的情人,鄰邦亞述人,
Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba
6 即那穿紫紅衣服的將領和公卿,全是英俊的青年,善於騎馬的騎士。
oyo balataka bilamba ya lokumu ya langi ya ble, bayangeli mpe bakonzi ya basoda; bango nyonso bazalaki bilenge mibali ya kitoko oyo bayebaki malamu kotambola na bampunda.
7 於是她與所有的亞述青年行淫,並為她所戀愛的情人及其偶像所玷污。
Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo.
8 但她仍沒有放棄埃及的淫蕩,因為他們在她青年時曾同她共寢過,糟蹋過她的童身,在她身上發洩過淫慾。
Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye.
9 為此我把她交在她情人手中,即她所熱戀的亞述人手中。
Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela.
10 他們必要揭露她的私處,擄去她的子女,用刀把她殺死:如此,因所加於她身上的懲罰,她成了婦女的警戒。
Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu.
11 她妹妹敖曷里巴雖看見了這一切,但她的情慾更甚於她姐姐,她的淫亂也遠超過她姐姐的淫亂。
Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi.
12 她也戀愛那些身為將領公卿的鄰邦亞述子民,他們都是衣著華美,善於騎馬的騎士,而且都是英俊的青年。
Ye mpe akufelaki kolinga mibali ya Asiri: bayangeli, bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo balataka kitoko mpe batambolaka malamu likolo ya bampunda; bango nyonso bazalaki bilenge mibali kitoko.
13 我也見了她受玷污,她們兩的行徑完全一樣。
Namonaki ete ye mpe amikomisaki mbindo: bango mibale balandaki kaka nzela moko.
14 她的淫行有增無減。當她看見繪畫在牆上的人──用丹青繪畫的加色丁人像,
Nzokande, ye kutu akendeki mosika koleka na kindumba na ye; amonaki bililingi ya mibali na mir, bililingi ya bato ya Chalide, oyo basala na langi ya motane;
15 腰間束著佩帶,頭上纏著突出的頭巾,都有軍官的模樣,相似巴比倫人,加色丁即是他們的出生地──
mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide.
16 她的眼一看見,就愛上了他們,遣派使者往加色丁,到他們那裏去。
Tango kaka amonaki bango, akufelaki bango na bolingo mpe atindaki bantoma epai na bango, na mokili ya Chalide.
17 巴比倫人一來到她那裏,登上愛情的床,行了淫,玷污了她;她所玷污之後,遂即厭棄了他們。
Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango.
18 她既暴露了自己的淫行,揭開了自己的私處,因此我也厭棄她,如同厭棄她姐姐一樣。
Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi.
19 她又想念年輕時在埃及行淫的日子,遂增強了她的淫慾。
Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito.
20 她仍戀愛體壯似驢,精足似馬的情人。
Kuna, akufelaki kolinga bamakangu na ye, oyo nzoto na bango ya mibali ezalaka lokola nzoto ya mibali ya ane mpe oyo bazalaka na nguya ya kosangisa nzoto lokola mpunda.
21 於是你渴望你年輕時的淫行,那時埃及人曾撫摸過你的胸懷,撫弄過你青春的乳房。
Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge.
22 因此,敖曷里巴! 吾主上主這樣說:看,我要鼓動你所厭棄的情人來攻擊你,引他們從四周來攻擊你,
Yango wana, Oholiba, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosala ete bamakangu na yo, ba-oyo yo oboyaki, babalukela yo; mpe nakosala lisusu ete babimela yo na bangambo nyonso:
23 即巴比倫人和一切加色丁人,培科得、芍亞和科亞,以及一切同他們聯合的亞述人,英俊的青年,一切長官和公卿、軍官和將領,一切善於騎馬的人。
mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.
24 他們率領大軍、車輛和輜重車,大隊士卒,都佩著甲、盾和盔,由四周攻擊你。我讓他們處罰你,照他們的法律判決你。
Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango.
25 如此,我要在你身上發洩我的妒火,讓他們以憤怒待你,割去你的鼻子和耳朵;其餘的都死於刀下;他們還要擄去你的子女,餘下的都為火燒死。
Nakotelemela yo na kanda na Ngai mpe bakosala yo mabe, na mitema ya kanda penza. Bakokata yo zolo mpe matoyi; bongo bato na yo, oyo bakotikala bakokufa na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, bongo ba-oyo bakotikala bakokufa na moto.
26 他們還要剝光你的衣服,奪去你的裝飾品。
Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo.
27 這樣,我才消除你心中的淫蕩,和由埃及地開始的淫行,使你再不敢舉目看他們,再不想念埃及。
Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te.
28 因為吾主上主這樣說:看,我要將你交在你所惱恨的人手中,和你所厭惡的人手中。
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te.
29 他們要以惱恨對待你,奪去你的一切財物,赤身露體的拋棄你:因此你放蕩的私處,好色和淫亂都要暴露出來。
Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo
30 他們這樣對待你,是因為你同異民行了淫,受了他們偶像的玷污。
nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko.
31 你既然走了你姐姐的路,我也要把她的苦爵放在你手中。
Lokola olandaki nzela ya ndeko na yo ya mwasi, nakotia kopo oyo ye amelaki na loboko na yo.
32 吾主上主這樣說:你要喝你姐姐又深又大,容量又多的苦爵,你要成為恥笑和辱罵的對象,
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Okomela kopo oyo ndeko na yo ya mwasi amelaki, kopo moko ya monene mpe ya mozindo; ekomemela yo kosambwa mpe soni, pamba te ezali monene penza.
33 你要酩酊大醉,滿懷憂愁。你姐姐撒瑪黎雅的爵是驚惶和毀滅的爵,
Ekolangwisa yo na pasi: kopo ya kobebisama mpe ya somo, kopo ya ndeko na yo ya mwasi, Samari.
34 你必要喝,且要喝盡,連渣滓也要吞下;你還要抓破你自己的乳房:這是我所說的──吾主上主的斷語──
Okomela yango kino ekokawuka, okobuka-buka yango na biteni, mpe ekozokisa-zokisa mabele na yo, pamba te Ngai Nkolo Yawe nde nalobi.
35 為此吾主上主這樣說:因為你忘了我,把我拋在背後,你也要親自承擔你好色和淫亂的懲罰。」
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »
36 上主對我說:「人子,你要審判敖曷拉和敖曷里巴,向她們說明她們的醜惡:
Yawe alobaki na ngai: « Mwana na moto, okosambisa penza Ohola mpe Oholiba? Lakisa bango misala na bango ya mbindo;
37 她們犯了姦淫,手上帶著殺人的血,同偶像犯了姦淫,還焚化了她們給我所生的子女,祭祀偶像。
pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko.
38 此外,她們還對我行了這事:在那一天她們還玷污了我的聖所,褻瀆了我的安息日,
Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai: kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
39 因為當她們給她們的偶像祭殺自己的子女時,同一天也進了我的聖所,加以褻瀆。的確,她們在我聖殿中這樣行了。
Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai.
40 並且他們還想從遠方召人來,便遣使者到他們那裏。看,他們果然來了,你就為了他們而沐浴,畫眼,佩戴珠寶。
Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju.
41 以後你坐在華麗的床上,床前安放桌子,上面擺上本來獻給我的香和油。
Ovandaki na mbeto moko ya kitoko; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai.
42 在她那裏可以聽到曠野來的群眾的歡樂嘈雜聲,他們在她們姐妹的腕上帶上鐲子,在她們頭上戴上花冠。
Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango.
43 那時我就關於這老淫婦說:現今她當然又要去行淫。
Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba: ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba! ›
44 的確,人都到她們那裏,就如到娼妓那裏,也照樣到淫婦敖曷拉和敖曷里巴那裏。
Mpe basangisaki na ye nzoto: ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba.
45 但正義的人必要裁判她們,如裁判姦婦和流血的人,因為她們是姦婦,血還在她們手上。
Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila.
46 因為吾主上主這樣說:我要使許多人來攻擊她們,叫她們飽受虐待並遭受搶掠。
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi!
47 這群人要用石頭砸死她們,用刀砍碎她們,屠殺她們的子女,火燒她們的房屋。
Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto.
48 如此,我要把淫亂由此地剷除,使所有的婦女受到警戒,不敢效法你們的淫行。
Na nzela wana nde nakosukisa kindumba kati na mokili, mpo ete basi nyonso bazwa mayele mpe balanda ndakisa na bango te.
49 我要使你們的淫行歸在你們身上。承擔敬拜偶像的罪罰:如此,你們纔承認我是上主。
Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. »

< 以西結書 23 >