< 以西結書 13 >

1 上主的話傳給我說:「
Yawe alobaki na ngai:
2 人子,你要斥責那些在以色列講預言的先知,向那些隨心所欲說預言的人說:你們應聽上主的話!
« Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko: ‹ Boyoka Liloba na Yawe!
3 吾主上主這樣說:那些隨心所欲,而一無所見的愚妄先知,是有禍的!
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko! Nzokande bamonaki eloko moko te.
4 以色列! 你的先知好像廢墟中的狐狸。
Oh Isalaele, basakoli na yo bazali lokola bambwa ya zamba kati na bisika oyo etonda na biloko ebeba.
5 你們沒有上到缺口處,也沒有圍繞以色列家建築圍牆,好叫她在上主的日子,在戰爭中穩立。
Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe.
6 他們所見的盡是空虛,所預言的盡是欺詐,反而說是「上主的斷語;」其實上主並沒有派遣他們,他們還指望自己的話能夠實現。
Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka: ‘Tala makambo oyo Yawe alobi,’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama!
7 你們豈不是見了幻像,說了欺詐的預言,還說是「上主的斷語﹖」其實我並沒有說過。
Boni, bimoniseli na bino ezalaka ya pamba te, mpe masakoli na bino ezalaka ya lokuta te, atako bolobaka: ‘Tala makambo oyo Yawe alobi,’ nzokande Ngai nalobi na bino ata liloba moko te?
8 為此,吾主上主這樣說:因為你們說的是謊話,見的是幻像,我必攻斥你們──吾主上主的斷語──
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mpo ete bolobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta, Ngai moko natelemeli bino, elobi Nkolo Yawe.
9 我必伸手打擊那些見幻像,說欺詐預言的先知。他們決不得參加我人民的議會,不得登記在以色列家族的名冊上,也不得進入以色列地域:如此你們要承認我是上主。
Loboko na Ngai ekobeta basakoli oyo balobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta: bakozala na esika te kati na lisanga ya bato na Ngai, bakombo na bango ekokomama te kati na buku ya libota ya Isalaele, bakokoma te kino na mokili ya Isalaele. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.
10 因為他們迷惑我的人民說:「平安;」其實並沒有平安。人民築起牆來,看,他們就來墁泥。
Boye, lokola bapengwisaka bato na Ngai tango balobaka: ‘Kimia,’ na tango kimia ezali te; lokola bapakolaka potopoto ya pembe na mir oyo bato na Ngai basili kotonga,
11 你要向墁泥的人說;我要使驟雨降下,冰雹落下,暴風颳來,
yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka.
12 那牆必要傾倒。那時,人豈不是要向你們說:你們所墁的泥在那裏呢﹖
Tango mir yango ekokweya, bato bakotuna bino: ‘Mosala nini penza potopoto ya pembe esali?’
13 為此,吾主上主這樣說:在我憤怒時,我要使暴風颳來,在怒火中使驟雨降下,在憤怒時使冰雹降下,破壞一切。
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.
14 我要摧毀你們墁過泥的牆,使它傾倒在地,基礎暴露;牆傾倒了,你們也要消失在其中:如此,你們要承認我是上主。
Nakokweyisa mir oyo bopakolaki potopoto ya pembe mpe nakolalisa yango kino na se, mpo ete miboko na yango emonana. Tango mir yango ekokweya, ekoboma bino; mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
15 當我對那牆和在牆上墁泥的人發洩了我的憤怒,我要對你們說:牆沒有了,墁牆的人也不見了。
Nakokweyisela mir mpe bato oyo bapakolaki yango potopoto ya pembe kanda na Ngai; nakoloba na bino: ‘Mir ezali lisusu te! Bato oyo bazalaki kopakola yango potopoto ya pembe bazali lisusu te;
16 這是指那些向耶路撒冷講預言的以色列的先知,他們說見過平安的異象;其實並沒有平安──吾主上主的斷語。
basakoli ya Isalaele oyo bazalaki kosakola na tina na Yelusalemi mpe komona bimoniseli ya kimia mpo na yango, nzokande kimia ezali na yango te, bazali lisusu te, elobi Nkolo Yawe.’ ›
17 人子,你要轉面向那些隨心所欲,講預言的你百姓中的女先知,你要斥責她們。
Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko! Sakola mabe na tina na bango
18 你宣講說:吾主上主這樣說:那些為手腕縫製各種帶子,照頭的大小製做各種頭巾,以獵取人命的女人,是有禍的! 你們獵取了我百姓的性命,難道能挽救你們自己的性命﹖
mpe loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na basi oyo balataka basinga ya maji na maboko na bango mpe batongaka bitambala mpo na mito ya bato ya ndenge na ndenge mpo na kotiela bomoi na bango mitambo! Bokanisi ete bokotiela bomoi ya bato na Ngai mitambo mpo ete botikala bino moko kaka na bomoi?
19 你們竟為了一掬麥子,一塊餅,就在我百姓前褻瀆了我,使不應死的人死去,使不應活的人活著,以欺騙我那好聽信謊言的百姓。
Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.
20 為此,吾主上主這樣說:看,我要把你們像捕鳥一樣獵取人命的帶子,從你們手腕上撕下,釋放你們所獵取的人,像釋放飛鳥;
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natelemeli basinga na bino ya maji, oyo bozali kosalela mpo na kotiela bato na Ngai mitambo lokola bandeke, nakokata-kata yango mpe nakolongola yango na maboko na bino; mpe nakokangola bomoi ya bato oyo bokangaki na mitambo lokola bandeke.
21 撕破你們的頭巾,由你們手中救出我的百姓;他們決不再做你們手中的獵物:如此,你們要承認我是上主。
Nakopasola bitambala na bino mpe nakokangola bato na Ngai na maboko na bino; bakokweya lisusu te na se ya bokonzi na bino! Mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
22 因為你們以謊言使義人的心沮喪;其實,我並沒有使義人悲哀;你們又鼓勵惡人,使他不肯離開罪惡的路,以求生存。
Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te,
23 為此,你們不得再見幻像,不得再說預言;反之,我要從你們手中救出我的百姓:如此,你們必承認我是上主。」
bokomona lisusu te bimoniseli na bino wana ya pamba mpe bokoloba lisusu masakoli te; nakobikisa bato na Ngai na maboko na bino, mpe, na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »

< 以西結書 13 >