< 出埃及記 33 >

1 上主向梅瑟說:「你和你從埃及國領出的百姓離開這裏,上那地方去;關於此地,我曾誓許給亞巴郎、依撒格和雅各伯說:我要將此地獻給你的後裔。
Yawe alobaki na Moyize: — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.
2 我要打發使者在你面前,我要趨逐客納罕人、阿摩黎人、赫特人、培黎齊人、希威人和耶步斯人。
Nakotinda anjelu liboso na yo, nakobengana bato ya Kanana ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
3 你往流奶流蜜之地時,我不與你同行,因為你是個執拗的百姓,免得我在路上消滅你。」
Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela.
4 百姓一聽這兇信,都表示悲痛,沒有人再穿戴裝飾品。
Tango bato bayokaki maloba oyo ya somo, balataki pili, mpe ata moto moko te alataki lisusu biloko ya monzele.
5 少主向梅瑟說:「你告訴以色列子民:你們是個執拗的百姓,我若與你同行,只一會兒,我必把你消滅。現在你把裝飾品卸下,看我要怎樣待你。」
Bongo Yawe alobaki na Moyize: — Loba na bana ya Isalaele: « Bozali batomboki; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. »
6 以色列子民從離開曷勒布山,就卸去了裝飾品。會幕
Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi.
7 梅瑟往往將那帳幕支搭在營外,離營遠些;他稱此帳幕為「會幕。」凡求問天主的,要到營外的帳幕那裏。
Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.
8 每當梅瑟往會幕那裏去的時候,眾百姓都起來,每人站在自己帳幕門口,觀望梅瑟直到他進入會幕。
Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema: moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani.
9 當梅瑟進入會幕的時候,雲柱降下,停在會幕門口,上主便向梅瑟談話。
Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize.
10 眾百姓一見雲柱停止在會幕門口,百姓就起來,俯伏在自己的帳幕門口。
Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo.
11 上主同梅瑟面對面地談話,就如人同朋友談話一樣。梅瑟回營以後,他的侍從,一個年輕人,即農的兒子若蘇厄總不離開會幕。梅瑟求見天主的榮耀
Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.
12 梅瑟對上主說:「看,你吩咐了我,叫我引領這百姓,但沒有告訴我,你派誰與我同去。你還說過:提名選了你,你在我眼中得了寵。
Moyize alobaki na Yawe: — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai: « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu: « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »
13 如果我真在你眼中得寵,求你把你的道路指示給我,叫我認識你,好在你眼中得寵。也請記得這民族是你的百姓。」
Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.
14 上主回答說:「我必親自去,使你獲得安所。」
Yawe azongisaki: — Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.
15 梅瑟上主說:「你若不親自去,也別叫我們從這裏上去。
Moyize azongisaki: — Soki Yo moko okotambola elongo na biso te, kolongola biso te na esika oyo.
16 人怎樣知道我和你的百姓在你眼中得寵,豈不是因你與我們同行,而我和你的百姓有別於地面上所以的人民﹖」
Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.
17 上主回答說:「連你所求的事,我也要作,因為你在我眼中得了寵,我提名選了你。」
Yawe alobaki na Moyize: — Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo.
18 梅瑟又說:「求你把你的榮耀顯示給我。」
Moyize azongisaki: — Monisa ngai nkembo na Yo.
19 上主答說:「當我在你前呼喊「雅威」名號時,我要使我的一切美善在你面前經過。我要恩待的就恩待,要憐憫的就憐憫。」
Yawe azongisaki: — Nakolekisa bolamu na Ngai nyonso liboso na yo mpe nakotatola nani oyo nazali liboso na yo; natalisaka ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nayokelaka mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa.
20 又說:「我的面容你決不能看見,因為人見了我,就不能再活了。」
Kasi okokoka komona elongi na Ngai te, pamba te moto moko te akoki komona Ngai mpe azala na bomoi.
21 上主又說:「看,靠近我有個地方,你可站在那塊磐石上。
Yawe alobaki lisusu: — Ezali na esika moko awa, pembeni na Ngai, epai wapi okoki kotelema na likolo ya libanga.
22 當我的榮耀經過時,我把你放在磐石縫裏,用我的手遮掩你,直到我過去。
Tango nkembo na Ngai ekoleka, nakotia yo kati na lidusu ya libanga mpe nakozipa yo na loboko na Ngai kino nakoleka.
23 當我縮回我的手時,你將看見我的背後,但我的面容,卻無法看見。」
Bongo tango nakolongola loboko na Ngai, okomona Ngai kaka na mokongo; kasi okokoka komona elongi na Ngai te.

< 出埃及記 33 >