< 出埃及記 26 >

1 至於帳棚,應用十幅布幔做成;布幔用捻的細麻,紫色、紅色、朱紅色的毛線織成,用鏽工繡上革魯賓。
Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
2 每幅布幔長二十八肘,寬四肘;每幅布幔都是一樣的尺寸。
Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
3 五幅布幔相連縫在一起,另五幅也相連縫在一起。
Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
4 在這組布幔末端的邊上,應做上紫色的鈕;另一組布幔末幅的邊上,也應這樣作。
Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.
5 在這一幅上應做五十個鈕,在另一組布幔末幅的邊上,也應做上五十個鈕,這些鈕彼此相對。
Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale; basinga yango ekotalana.
6 又做五十個金鉤,用鉤子使兩組布幔彼此相連,成為一個帳棚。
Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko.
7 再用山羊毛做布幔,作帳棚頂之用;共做布幔十一幅。
Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.
8 每幅長三十肘,寬四肘;十一幅布幔都是一樣的尺寸。
Molayi ya tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na mitano, mpe mokuse na yango ekozala na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
9 五幅布幔縫在一起,另六幅也縫在一起,但第六幅應在棚頂前面疊起。
Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo.
10 在這一組布幔末幅的邊上,做上五十個鈕,在另一組布幔末幅的邊上,也做上五十個鈕,
Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
11 再製五十個銅鉤穿入鈕內:這樣使棚頂連結在一起,成為一個。
Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
12 至於棚頂布幔多出的一那一部份,即餘下的半幅布幔,應垂在帳棚後邊。
Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo.
13 棚頂布幔的長度多出來的每邊一肘,應垂在帳棚的兩邊,好遮住帳棚。
Mpe na molayi ya batapi oyo ezali na likolo ya Mongombo, basantimetele pene tuku mitano ekolekana na bangambo mibale ya Mongombo mpo na kozipa yango.
14 再用染紅的公羊皮蒙在棚頂上,上邊再蒙上海豚皮。帳棚的木架
Okosalela baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe okobakisa na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
15 應用皂莢木做支帳棚用的木板。
Okosala bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe okotelemisa yango.
16 每塊木板高十肘,寬一肘半。
Ezingelo moko na moko ekozala na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse.
17 每塊木板下要做兩個筍頭,彼此並列;帳棚所有的木板,全都這樣做。
Okobeta banzete mibale-mibale na ezingelo; okosala bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo.
18 支帳棚的木板,在向陽的一面,即南邊,應做二十塊木板;
Okotia bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude;
19 在二十塊木板下邊做四十個銀卯座,每塊木板下兩個卯座,為安木板的兩筍頭。
mpe makolo tuku minei ya palata na se ya bizingelo tuku mibale: makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale;
20 為帳棚的另一面,即北邊,也應做二十塊木板,
bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor,
21 也做四十個銀卯座,每塊木板下兩個卯座。
elongo na makolo na yango tuku minei ya palata: makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko;
22 為帳棚的後面,即西邊,要做六塊木板;
bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste,
23 在帳棚後面的兩角上,各做兩塊木板;
mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo.
24 木板下端應是雙的,直到上端第一環,都應是雙的。兩塊木板都應這樣做,形成兩個角。
Bizingelo yango ekozala ya kofungwama na se, kasi ekosala songe na likolo mpe ekokota na lopete ya liboso: nyonso mibale ekozala ndenge moko mpe ekolendisa Mongombo.
25 所以共有八塊木板,十六個銀卯座,每塊木板下兩個卯座。
Boye, bizingelo ekozala mwambe elongo na makolo na yango zomi na motoba ya palata: makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
26 再用皂莢木做橫木:為帳棚的這一面木板做五根,
Sima, okosala, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo,
27 為帳棚另一面木板,也做五根橫木;為帳棚後面,即西邊的木板,也做五根橫木。
mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ekozala na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste.
28 在木板中間的那根橫木,應從這頭穿到那頭。
Libaya ya kati ekoleka na kati-kati ya bizingelo, ekoleka ngambo na ngambo.
29 木板應包上金,穿橫木的環子應是金做的,橫木也包上金。
Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya; mpe okobamba mabaya wolo.
30 應依照在山上指示給你的式樣,建造帳棚。帳棚與門簾
Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba.
31 應用紫色、紅色、朱紅色的毛線和捻的細麻做帳棚幔,用繡工繡上革魯賓。
Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
32 將帳幔掛在四根包金的皂莢木柱子上;柱釘應是金的,柱子應安在四個銀卯座上。
Okotia yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo; okokangisa yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe okotelemisa yango na makolo minei ya palata.
33 帳幔懸在鉤上;將約櫃抬到裏面即帳幔後面:這樣帳幔給你們隔成聖所和至聖所。
Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.
34 將贖罪蓋安在至聖所內的約櫃上。
Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, okotia mofinuku na likolo ya Sanduku ya Litatoli.
35 將供桌放在帳棚外邊;將燈台安置在帳棚的南邊,對著供桌,所以應把供桌放在北邊。
Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude.
36 再用紫色、紅色、朱紅色的毛線和捻的細麻,編織會幕的門簾。
Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
37 為掛門簾應做五根皂莢木柱子,包上金,柱釘應是金的;為柱子再鑄五個銅卯座。
Okosala na wolo, bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo; okosala makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.

< 出埃及記 26 >