< 以斯帖記 9 >

1 十二月,「阿達爾」月十三日,是該執行君令和上諭的那一天,也是猶太人的敵人原想殲滅猶太人的日期,卻變成了猶太人制服敵人的日子。
Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango.
2 住在薛西斯王各省各城的猶太人,都聚集起來,動手攻打那些想謀害他們的人,但沒有一個人能敵擋他們,因為所有人民都害怕他們。
Kati na bingumba na bango, kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi, Bayuda basanganaki mpo na kobundisa bato nyonso oyo bolukaki kobebisama na bango. Ekolo moko te ezalaki na makoki ya kotelemela bango, pamba te bato ya bikolo nyonso mosusu oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bazalaki na somo na bango.
3 各省的首長,御史大臣和省長,以及為君王服務的人,都擁護猶太人,因為害怕摩爾德開。
Bakalaka nyonso ya bituka, bayangeli ya bituka oyo mokonzi atiaki, bayangeli mpe bakalaka ya mokonzi basungaki Bayuda, pamba te bazalaki na somo monene ya Maridoshe.
4 的確,摩爾德開在王宮裏已掌大權,聲譽傳遍各省,而摩爾德開的權力越來越大。
Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi: lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo.
5 這樣猶太人就用刀屠殺,消滅了一切敵人,任意對待了仇恨他們的人;
Bayuda babebisaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe babebisaki bango; basalaki bato oyo bazalaki koyina bango makambo nyonso oyo basepelaki kosala.
6 只在穌撒禁城,猶太人就殺死了五百人,
Kaka na engumba Size, Bayuda babomaki mpe babebisaki bato nkama mitano.
7 也殺了帕商大達、達耳豐、阿斯帕達、
Babomaki mpe lisusu Parishandata, Dalifoni, Asipata;
8 頗辣達、阿黎大達、
Porata, Adalia mpe Aridata;
9 帕瑪市達、阿黎賽、阿黎待與耶匝達,
Parimashita, Arizayi, Aridayi mpe Vayezata;
10 即哈曼大達的兒子,猶太人的仇人哈曼的十個兒子,但沒有下手搶奪財物。
bana mibali zomi ya Amani, mwana mobali ya Amedata, monguna na Bayuda, kasi batikalaki te kozwa bomengo ya bitumba.
11 當天,君王就知道了在穌撒禁城內殺死的人數。
Kaka na mokolo wana, bayebisaki mokonzi motango ya bato oyo babomaki kati na engumba Size.
12 對艾斯德爾后說:「在穌撒禁城內,猶太人已殺死了五百人和哈曼的十個兒子,在帝國其他各省內,他們更將做出何事﹖如今你還請求什麼,我必賜給你;你還要求什麼,我都必履行。」
Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi: — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi? Sik’oyo, posa na yo ezali nini? Bosenga na yo ezali nini? Ekopesamela yo.
13 艾斯德爾答說:「如蒙大王賜恩,請恩准住在穌撒的猶太人,明天也照今天的法律行事,把哈曼的十個兒子懸在刑架上。」
Ester azongisaki: — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani.
14 王就下令照辦。於是在穌撒發出了一道諭旨,要把哈曼的十個兒子懸在刑架上。
Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.
15 在「阿達爾」月十四日那一天,住在穌撒的猶太人又集合起來,在那裏擊殺了三百人,但沒有下手搶奪財物。
Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.
16 住在君王各省的他猶太人,也聚集起來保衛自己,擺脫敵人的侵害,把他們的七萬五千仇人殺死,但沒有下手搶奪財物。
Bayuda mosusu oyo bazalaki kovanda kati na bituka ya mokonzi, bango mpe basanganaki mpo na komibatela mpe bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango.
17 這是「阿達爾」月十三日的事;十四日那天,他們安息,舉行慶功的歡宴。
Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
18 住在穌撒的猶太人,因為在十三十四日聚集復仇,便於十五日安息,舉行慶功的歡宴。
Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
19 從此以後,那些住在村莊的猶太鄉民,奉「阿達爾」月十四日為慶日,歡宴慶祝,互送禮物;但居住在城市的猶太人卻以「阿達爾」月十五日為慶日,互送禮物。
Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango.
20 摩爾德開於是將這些事記錄下來,並向薛西斯王各省遠近的猶太人頒發文書,
Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika
21 通告他們應每年慶祝「阿達爾」月十四十五兩天,
ete basalaka feti na mibu nyonso, na mokolo ya zomi na minei mpe ya zomi na mitano ya sanza ya Adari,
22 因為這兩是猶太人徹底擺脫仇敵的日子,而這一月為他們是化憂為喜,化凶為吉的一月,因此該以歡宴慶祝這兩天,互贈禮物,救濟窮困。
mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.
23 猶太人便把已開始舉行的和摩爾德開給他們規定的事,奉為永遠當守的盛典。
Bayuda bandimaki kokoba kosala feti oyo mpe bakomaki kosala makambo oyo Maridoshe akomelaki bango.
24 原來阿加格人哈默大達的兒子哈曼,那全猶太人的仇人曾蓄意加害猶太人,要將他們滅絕,就抽出「普爾」即籤,來擇定剷除殲滅他們的日子。
Pamba te Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda nyonso, asalelaki Bayuda likita mpo na kobebisa bango; abetaki Puri, oyo ezali « zeke, » mpo na kufa mpe libebi na bango.
25 但是君王一洞悉此事,便下諭令說:「哈曼加害猶太人想出來的陰謀,應加在他自己頭上! 」就判處他和他的兒子們懸在刑架上。
Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.
26 從此,人就援用「普爾」一名,稱這兩天為「普凌節。」依照這文書記載的,和他們有關此事親身看見及經歷的一切,
Yango wana babengaka mokolo yango Purimi (ewuti na kombo Puri oyo elakisi zeke). Mpo na makambo nyonso oyo Maridoshe akomaki na mokanda, mpo na makambo nyonso oyo bamonaki mpe makambo nyonso oyo ekomelaki bango,
27 猶太人便給自己,給自己的子孫,給一切加入他們集會的人,規定了「每年該照規定依時慶祝這兩天」為不可更改的法律;
Bayuda bakataki mpe bandimaki ete yango ekoma ezaleli mpo na bango, ezaleli ya bakitani na bango mpe ya bato nyonso oyo bakosangana na bango, mpo ete batosaka kosala feti ya mikolo oyo mibale, na mibu nyonso, ndenge ekatama na tango na yango.
28 世世代代,家家戶戶,各省各城,應紀念和慶祝這兩天;猶太人決不可廢除這兩天的「普凌節,」他們的子孫也決不可忘掉這慶節。
Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.
29 阿彼海耳的女兒艾斯德爾后與猶太人摩爾德開,又以全權再度寫了一道核准「普凌節」的文書。
Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi.
30 然後把此文書分發給所有住在薛西斯帝國一百二十七省內的猶太人,以平如誠懇的言詞,
Maridoshe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kovanda kati na bituka nyonso nkama moko na tuku mibale na sambo ya mokili ya Kizerisesi, mpe mikanda yango ezalaki na maloba ya kimia mpe ya elikya
31 勸他們遵照猶太人摩爾德開對這「普凌節」所規定的,依時舉行。至於禁食和哀歌的吟詠等禮,則可依照他們自己及自己的後代所規定的去行。
mpo na kobeta sete na tina na mikolo oyo ya Purimi ete Bayuda basengeli kosala Purimi yango na mikolo na yango oyo ekatama kolanda mokano ya Moyuda Maridoshe mpe Ester, mwasi ya mokonzi; mpe ndenge Bayuda bakataki yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango lokola tango na bango ya kokila bilei mpe ya bileli.
32 從此,艾斯德爾的命令,便成了「普凌節」的規定,並記載於史冊。
Mitindo ya Ester elendisaki mibeko mpo na Purimi mpe ekomamaki na buku.

< 以斯帖記 9 >