< 傳道書 7 >

1 良好的聲譽勝於名貴的香液;死日勝於生日。
Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya, mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.
2 往居喪的家去,勝於往宴會的家去,因為喪事是人人的結局,活人應將此事放在心上。
Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango.
3 悲哀勝於歡笑,因為愁容能使心靈舒暢。
Mawa eleki koseka na malamu, pamba te elongi ya mawa eyeisaka motema esengo.
4 智者的心是在居喪的家中,愚人的心是在歡笑的家中。
Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga, kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.
5 聽智者斥責,勝過聽愚人歌唱。
Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.
6 愚人的歡笑,就像斧底荊棘的爆炸聲,但這也是空虛。
Koseka ya bazoba ezalaka lokola makelele ya basende oyo ezali kozika na se ya nzungu; wana mpe ezali pamba.
7 實在,壓榨使智者昏愚,賄賂能敗壞人心。
Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.
8 事情的結局勝過事情的開端;居心寬容,勝過存心傲慢。
Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.
9 你心裏不要輕易動怒,因為憤怒只停留在愚人胸中。
Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.
10 你不要問:「為什麼昔日勝於今日﹖」因為這樣的詰問,不是出於智慧。
Kolobaka te: « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo? » Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.
11 智慧與家產都好,對看見天日的人都有益,
Bwanya ezali lokola libula, ezalaka malamu mpe epesaka litomba na bato oyo bamonaka moyi.
12 因為受智慧的蔭庇與受金錢的蔭庇無異;但認識智慧的好處,是在於智慧賦與有智慧者生命。
Bwanya ezali lokola nguba, ndenge mpe mosolo ezalaka nguba; kasi litomba ya boyebi ezali ete ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.
13 你應觀察天主的作為:他所彎曲的,誰能使之正直﹖
Tala malamu misala ya Nzambe: Nani akoki kosembola eloko oyo Ye asili kogumba?
14 幸福之日,你應歡樂,不幸之日,你應思慮:幸與不幸,都是天主所為;其目的是叫人不能察覺自己將來的事。
Na mokolo ya malamu, sepela; na mokolo ya mabe, kanisa; pamba te Nzambe nde asala nyonso mibale mpo ete moto ayeba te makambo oyo ekoya sima na ye.
15 在我虛度的歲月內,我見了許多事:義人在正義中夭亡,惡人在邪惡中反而長壽。
Na mikolo ya pamba ya bomoi na ngai, namonaki makambo oyo nyonso: Moto ya sembo akufi mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe awumeli na bomoi mpo na mabe na ye.
16 不要過於正義,也不要自作聰明,免得自趨滅亡。
Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo to ya kozala moto ya bwanya; mpo na nini komibebisa?
17 不要作惡無度,也不要糊塗太甚,免得你死非其時。
Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka?
18 你的手最好把持這個,也不要放棄那個,因為敬畏天主的人,二者兼顧並重。
Ezali malamu kokangama na toli ya liboso mpe kosimba toli ya mibale, pamba te moto oyo atosaka Nzambe akosalela toli nyonso mibale.
19 智慧使智者的權勢,勝過本城十個有權勢的人。
Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.
20 世上沒有一個只行善,而不犯罪的義人。
Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.
21 你不要傾心去聽人說的一切閒話,免得你聽到你的僕人詛咒你;
Kotiaka matoyi na bilobaloba ya bato te, noki te okoyoka mosali na yo kotiola yo;
22 因為你心裏知道,你許多次也詛咒過別人。
pamba te, oyebi malamu, kati na motema na yo, ete yo mpe otiolaka bato mosusu mbala mingi.
23 這一切我都用智慧追究過;我宣稱我將成個智者,然而智慧仍離我很遠。
Namekaki kososola makambo wana nyonso na nzela ya bwanya, namilobelaki: « Nakosala nyonso mpo ete nakoma moto ya bwanya, » kasi bwanya ezalaki kaka mosika na ngai.
24 所有的事,既深遠,又玄奧,誰能窮究﹖
Nyonso oyo ezalisami ezali mosika, mozindo mpe mozindo makasi; nani akoki komona yango?
25 我又專心致力於認識、考察事物,尋求智慧和事理,得知邪惡就是昏愚,昏愚就是狂妄。
Boye, na motema na ngai mobimba, namipesaki mpo na kososola, koyeba, koluka bwanya mpe boyebi; mpe mpo na kososola bozoba ya mabe elongo na liboma ya bozoba.
26 我發覺女人比死亡還苦,她一身是羅網:她的心是陷阱,她的手是鎖鏈;凡博天主歡心的,必逃避她;但罪人卻被她纏住。
Namoni likambo oyo: mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.
27 訓道者說:看,這是我所發現的,一一加以比較,好探知事物的原理,
Mosakoli alobi: « Tala makambo oyo nasosoli sima na koyekola mwasi moko na moko mpo na kozwa mayele:
28 對此我的心還在追求,但尚未找到:在一千男人中,我發現了一個;在所有的女人中,卻沒有發現一個。
Nazali koluka, kasi nanu namoni te. Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko, kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso!
29 我發現的只有這一件事:天主造人原很正直,但人卻發明了許多詭計。
Tala makambo oyo nasosoli: Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »

< 傳道書 7 >