< 傳道書 4 >

1 我又轉目注視在太陽下所行的一切暴行:看,受壓迫者眼淚汪流,卻無人安慰;壓迫人者手中只有權勢,卻無人加以援助。
Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi: Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.
2 於是我聲稱那已死去的人,比現今還活著的人更為有福。
Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala bazali na bango kutu malamu koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.
3 那還沒有出世的人,比這兩等人更為有福,因為他還沒有見到太陽下所行的惡事。
Mpe moto oyo atikala nanu kozala te azali malamu koleka bango mibale, pamba te atikala nanu komona te misala mabe oyo esalemaka na se ya moyi.
4 我也看出各種勞苦和一切工作的技巧,都是出於人彼此間的競爭:這也是空虛,也是追風。
Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
5 愚人交臂叉手,是自食己肉。
Moto oyo azangi mayele akangaka maboko na ye mpe amibebisaka ye moko.
6 捧一把安逸,勝過兩把勞苦和追風。
Loboko moko oyo etondi na kimia ezali malamu koleka maboko mibale oyo etondi na misala makasi mpe na kolanda mopepe.
7 我又轉睛,看見在太陽下有件空虛的事:
Namonaki lisusu likambo mosusu ya pamba na se ya moyi:
8 有個孤獨無伴的人,既沒有兒子,又沒有兄弟,卻時常勞苦不息,他的眼總是貪得無厭,從來不問:「我辛辛苦苦,節制享樂,究竟是為誰﹖」這也是空虛和大不幸。
Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko, azalaki ata na mwana to ndeko te; azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi, kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye. Mpe atikalaki komituna te: « Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye? Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo? » Wana mpe lisusu ezali pamba: ezali mosala ya mpunda!
9 兩人勝過一人,因為兩人工作,酬報優厚:
Bato mibale bazali malamu koleka moto moko, pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.
10 若一個跌倒了,另一個可扶起自己的同伴。哀哉孤獨者! 他若跌倒了,沒有另一人扶起他來。
Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye; kasi mawa na moto oyo akweyi mpe azangi moto oyo akosunga ye!
11 又如兩人同眠,都感溫暖;若孤獨一人,怎能暖和﹖
Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bayokaka moto; kasi moto oyo azali ye moko, ndenge nini akoki koyoka moto?
12 若一人抵不住一人,兩人就能抵住。--三股繩,不易斷。
Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye; kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna. Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.
13 一個貧寒而明智的青年,勝過一個年老昏愚,而總不採納忠言的君王。
Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te;
14 這青年雖在國中出身貧寒,但由獄中出來,執政為王;
ezala soki elenge mobali yango abotama mobola kati na mokili na ye to awuti kobima na boloko mpo na kokoma mokonzi.
15 我看見一切在太陽下行走的活人,都擁護青年人,新繼位者,來代替老王。
Namonaki bato nyonso ya bomoi, oyo bazali kotambola na se ya moyi kolanda elenge mobali lokola mokitani ya mokonzi.
16 擁護他為領袖的人民,多得無數;但日後,那些後來的人卻不喜歡他:這也是空虛,也是追風。
Ata soki bato oyo bazalaki kosepela na ye bazalaki ebele koleka, kasi bato oyo bakoya sima bakoki koboya ye. Yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.

< 傳道書 4 >