< 申命記 5 >
1 梅瑟召集了全以色列人,對他們說:「請聽我今日向你們耳中所宣示的法令和規則,務要學習遵行。
Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki: « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.
Yawe, Nzambe na biso, asalaki boyokani elongo na biso elongo na ngomba Orebi.
3 上主並不是與我們的祖先立了這約,而是與我們今日在這裏尚生存的眾人。
Yawe asalaki te boyokani oyo na bakoko na biso kasi asalaki yango nde na biso, biso nyonso oyo tozali na bomoi awa na mokolo ya lelo.
Yawe alobaki na bino kati na moto likolo ya ngomba ndenge moto alobanaka na moto miso na miso.
5 那時我站在上主和你們中間,給你們傳達上主的話,因為你們一見火便害了怕,沒有上到山上去。上主說:「
Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki:
6 我是上主,你的天主,我曾領你離開埃及地,那為奴之家,
‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.
Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
8 你不可為自己雕刻偶像,或製造任何上天下地,或地下水中所有各物的形像。
Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.
9 你不可叩拜,也不可事奉這樣的偶像,因為我上主,你的天主是忌邪的天主。對於恨我的人,我必在子孫身上追罰他們祖先的罪惡,直到第三代,第四代;
Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
10 對於愛我,守我誡命的人,我對他們施行仁慈,直到千代。
Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.
11 你不可妄呼上主,你天主的名,因為上主決不放過妄呼他名的人。
Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.
12 當照上主,你的天主吩咐的,遵守安息日,奉為聖日。
Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango.
Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.
14 第七天是上主你天主的安息日,你和你的子女、僕婢、牛驢、你所有的牲畜,以及住在你城內的外方人,都不應做任何工作,好使你的僕婢能和你一樣獲得安息。
Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema.
15 你應記得:你在埃及地也曾做過奴隸,上主你的天主以大能的手和伸展的臂,將你從那裏領出來;為此,上主你的天主吩咐你守安息日。
Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.
16 應照上主你的天主吩咐你的,孝敬你的父母,好使你能享高壽,並在上主你的天主賜給你的土地內,獲享幸福。
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.
21 不可貪戀你近人的妻子;不可貪圖你近人的房屋、田地、僕婢、牛驢,以及屬於你近人的一切事物。」
Okolulaka te mwasi ya moninga na yo; okolulaka te ndako ya moninga na yo, elanga na ye, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. › »
22 這是上主在山上,由火中,由濃雲黑暗裏,大聲對你們會眾所說的話,再沒有加添什麼;並將這些話寫在兩塊石版上,交給了我。
Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.
23 當山上火燄四射,你們聽到由黑暗中發出來的聲音時,你們各支派的首領和長老,都來到我跟前,
Tango boyokaki mongongo kobima kati na molili, wana ngomba ezalaki kopela moto, bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bampaka na bino bayaki epai na ngai.
24 說:「看,上主我們的天主,使我們看見了他的榮耀和偉大,我們也聽見了他由火中發出的聲音;今日我們見了天主與人說話,而人還能生存!
Balobaki: « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye.
25 現在,我們為什麼要冒死,為這大火所吞滅﹖如果我們繼續聽上主我們天主的聲音,我們必死無疑。
Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.
26 因為凡有血肉的人,有誰如我們一樣,聽到永生的天主由火中說話的聲音,而仍能生存呢﹖
Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi?
27 請你近前去,聆聽上主我們的天主所說的一切;然後你將上主我們的天主對你所說的話,轉告給我們;我們必聽從,也必遵行。」
Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »
28 你們對我所說的話,上主聽見了;遂對我說:「我聽見了這人民對你所說的話;他們所說的都對。
Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai: « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.
29 惟願他們常存這樣的心思,敬畏我,遵行我的一切誡命,好使他們和他們的子孫永享幸福。
Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango!
Kende, yebisa bango: ‹ Bozonga na bandako na bino. ›
31 但是,你應留在我這裏,我要將一切誡命。法令和規則訓示你,你再教訓他們,好叫他們在我賜給他們作為產業的地上遵行。」
Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »
32 所以你們應完全照上主你們的天主所吩咐你們的行事,不可偏右偏左。
Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.
33 在一切事上,只應履行上主你們的天主給你們指定的道路,好使你們在你們要去佔領的地方,得以生存、興盛、長壽。
Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.