< 申命記 26 >

1 當你進入上主你的天主賜給你作產業的土地,佔領後住在那裏時,
Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna,
2 應由上主你的天主賜給你的土地上,將一切田產的初熟之物,取出一部分放在筐裏,往上主你的天主選定立自己名號的地方去,
moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye.
3 到當時供職的司祭前,對他說:「我今日向上主我的天主明認,我已來到了上主對我們的祖先誓許賜與我們的地方。」
Akoloba na Nganga-Nzambe oyo akozala na mosala na tango wana: « Natatoli lelo liboso ya Yawe, Nzambe na yo, ete nakomi na mokili oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na biso na nzela ya ndayi. »
4 司祭就由你手中接過筐子,放在上主你的天主的祭壇前;
Nganga-Nzambe akozwa kitunga na maboko na ye mpe akokitisa yango liboso ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino.
5 然後你就在上主你的天主面前聲明說:「我的祖先原是個飄泊的阿蘭人,下到埃及,同少數的家人寄居在那裏,竟成了一強大有力,人口眾多的民族。
Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo: « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.
6 埃及虐待我們,壓迫我們,勒令我們做苦工。
Kasi bato ya Ejipito banyokolaki biso, bayokisaki biso pasi mpe bapesaki biso misala makasi.
7 我們向上主我們祖先的天主呼號,上主俯聽了我們的哀聲,垂視了我們的苦痛、勞役和所受的壓迫。
Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso;
8 上主以強力的手,伸展的臂,巨大的恐嚇,神蹟奇事,領我們出了埃及,
Yawe abimisaki biso na Ejipito na somo makasi, na bilembo minene mpe na bikamwa, na nzela ya loboko na Ye ya nguya mpe esembolama.
9 來到這地方,將這流奶流蜜的土地賜給了我們。
Amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
10 上主,請看! 我現今帶來了你賜給我的田地裏所出產的初熟之物。」遂將這初熟之物放在上主你的天主面前,俯伏朝拜上主你的天主。
Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. » Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye.
11 然後你與肋未人,和住在你中間的外方人,歡樂享受上主你的天主賜與你和你家庭的一切福分。
Boye, na biloko nyonso ya malamu oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mpe bandeko na yo; okosepela na yango elongo na Balevi mpe bapaya oyo bazali kati na bino.
12 在第三年,即獻什一之年,當你把你一切出產十分之一,完全取出,分給肋未人、外方人、孤兒和寡婦,並使他們在你的城鎮中吃飽之後,
Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.
13 你應到上主你的天主面前說:「我由我家中完全交出了這祝聖的一份,分給了肋未人、外方人、孤兒和寡婦,全照你吩咐我的命令;我沒有違犯你的命令,也沒有忽略。
Bongo okotatola maloba oyo epai na Yawe, Nzambe na yo: « Nalongolaki kati na ndako na ngai eteni ya bule mpe napesi yango epai ya Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kolanda makambo nyonso oyo otindaki ngai. Napengwaki te na mitindo na Yo mpe nabosanaki yango te.
14 這些聖物,在我居喪時,我沒有取食;在不潔中,我沒有交出,更沒有獻給死人;我聽從了上主我的天主的話,全照你吩咐我的一切履行了。
Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai.
15 願你由你神聖的住所,由天上俯視,祝福你的人民以色列,和你賜給我們的土地,即你向我們祖先所誓許的那流奶流蜜的地方。」
Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
16 上主你的天主今天吩咐你遵行這些法令和規則,你應全心全靈謹守遵行。
Lelo, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete osalela malamu bikateli mpe mibeko oyo; batela yango malamu na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.
17 今天你明認上主是你的天主,願履行他的道路,謹守他的法令、誡命和規則,聽從他的話。
Lelo, ondimi ete Yawe azali Nzambe na yo; ndenge opesaki elaka ete okotosa Ye, okobatela mibeko na Ye nyonso mpe okosala makambo nyonso oyo Ye akotinda yo.
18 上主今天也照他對你所說的,明認你為他特屬的人民,只要你謹守他的一切誡命,
Lelo mpe, Yawe andimi ete ozala ekolo na Ye penza, ndenge alakaki yo mpe ndenge apesaki yo mitindo ete otosa mibeko na Ye nyonso.
19 並且他要使你在名譽、聲望和光榮上,遠超過他所造的一切民族,使你如他所說的,成為屬於上主你的天主的聖潔人民。」
Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.

< 申命記 26 >