< 申命記 25 >

1 幾時人與人之間發生爭訟,而對簿公庭,定案時,正直的,應聲明他正直;有罪的,應判定他有罪;
Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango: bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.
2 如有罪的應受鞭刑,判官應命他伏下,當面按他的罪照數鞭打;
Bongo soki esengi ete babeta moto oyo asali mabe fimbu, basambisi bakolalisa ye na mabele mpe bakobetisa ye fimbu na miso na bango; bakobetisa ye motango ya bafimbu oyo ekoki na mabe oyo asali.
3 只可打他四十下,不可再多;怕鞭打他超過這數目,你的兄弟在你眼前過於受辱。
Kasi bakoki te kobeta ye bafimbu koleka tuku minei. Soki babeti ye fimbu koleka tuku minei, ndeko na bino akosambwa na miso na bino.
4 牛在打場的時候,不可籠住牠的嘴。
Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma.
5 如果兄弟住在一起,其中一個沒有留下兒子就死了;死者的妻子不可出嫁外人,丈夫的兄弟應走近她,以她為妻,對她履行兄弟的義務。
Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki.
6 她所生的長子,應歸亡兄名下,免得他的名由以色列中消滅。
Mwana mobali ya liboso oyo mwasi yango akobota akozwa kombo ya ndeko mobali oyo akufa mpo ete kombo na ye ebunga te kati na Isalaele.
7 若是那人不肯娶他兄弟的妻子,他兄弟的妻子應到城門去見長老說:「我丈夫的兄弟不願在以色列中給自己的兄弟留名,不願對我盡兄弟的義務。」
Soki mobali yango aboyi kobala semeki na ye ya mwasi, semeki yango ya mwasi akokende epai ya bampaka, na ekuke ya engumba, mpe akoloba na bango: « Semeki na ngai aboyi kobatela kombo ya ndeko na ye kati na Isalaele, aboyi kokokisa mokumba na ye ya kisemeki epai na ngai. »
8 本城的長老應叫那人來,對他說明;如他仍堅持說:「我不願娶她。」
Boye, bampaka ya engumba wana bakobengisa mobali yango mpe bakoloba na ye. Soki akobi kaka koboya kobala semeki na ye,
9 他兄弟的妻子應當著長老的面,走到他跟前,從他腳上脫下他的鞋,向他臉上吐唾沫說:「那不願給自己兄弟建立家室的人,應這樣對待他。」
semeki yango akopusana pembeni na ye na miso ya bampaka, akolongola ye lokolo moko ya sandale, akobwakela ye soyi na elongi, mpe akoloba na ye: « Tala ndenge basengeli kosala moto oyo aboyi kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali. »
10 從此他的名字,在以色列中,將稱為「脫鞋者的家。」
Boye, kati na Isalaele, bakobanda kobenga bakitani ya moto wana « bana ya moto oyo balongola sandale. »
11 若兩人彼此毆打,一人的妻子前來,救她的丈夫脫離那打他者的手,伸手抓住了那人的陰部;
Soki mibali bazali kobunda, bongo mwasi moko apusani mpo na kokangola mobali na ye na loboko ya moto oyo azali kobeta ye, mpe soki mwasi yango asemboli loboko na ye mpe akangi nzoto ya mibali ya moto oyo azali kobeta mobali na ye,
12 你應砍去她的手,不應表示憐惜。
bokokata loboko na ye. Bokoyokela ye mawa te.
13 在你袋裏不可有兩樣法碼:一大一小;
Okoki te kozala na bimekelo mibale ya kilo ekesana kati na saki na yo: moko eleki kilo mpe mosusu eleki pepele.
14 在你家內也不可有兩樣升斗:一大一小。
Okoki te kozala na ndako na yo na bikolo mibale ekesana mpo na kotanga na yango biloko: moko ya monene mpe mosusu ya moke.
15 你應有準確公正的法碼,應有準確公正的升斗,好使你在上主你的天主賜給你的地上,得享長壽;
Osengeli kozala na bimekelo mpe bikolo ya kotangela ya malamu mpe ya sembo, mpo ete owumela mikolo ebele kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
16 因為凡做這些事的,凡做事不公平的,於上主你的天主都是可憎惡的。
Pamba te Yawe, Nzambe na yo, amonaka nkele, moto nyonso oyo asalaka makambo wana, moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo te.
17 你應記得,當你由埃及出來時,阿瑪肋克在路上怎樣對待了你:
Bobosana te makambo oyo bato ya Amaleki basalaki bino tango bobimaki na Ejipito:
18 怎樣在路上襲擊了你,乘你困乏無力,攻擊你後方所有疲憊的人,一點也不怕天主。
tango bolembaki nzoto mpe bosilaki makasi, babimelaki bino na pwasa na mobembo na bino mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki na sima; babangaki Nzambe te.
19 所以,當上主你的天主賜你擺脫你四周的一切仇敵,在上主你的天主賜給你作產業的地上,安享太平時,你應由天下抹去阿瑪肋克的名字;不可忘記!
Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.

< 申命記 25 >